Matthew 6

Boya lolenge ya lokuta ya kosambela

1—Bokeba ete bosala bolamu te na miso ya bato, mpo ete bango bamona bino ; soki te bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abomopanga bino. 2Tango ozali kopesa likabo na mobola, kobeta kelelo te liboso na yo
Na tango ya Yesu, bayuda oyo bazalaki na mbongo mingi libosoete bakabela babola, bazalaki na basali na bango oyo bazalaki kobetela bango kelelo mpo ete babola baya kosangana mpo na kozwa likabo.
ndenge bato ya lokuta basalaka na bandako ya mayangani mpe na babala-bala, mpo ete bato bakumisa bango. Ya solo nalobi na bino ; basiʼbazwi lifuti na bango.
3Kasi tango yo ozali kopesa eloko na mobola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba te likambo loboko ya mobali ezali kosala ; 4mpo ete likabo na yo epesama na sekele ; bongo Tata na yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele akopesa yo lifuti.

5Tango bozali kobondela, bolanda te bizaleli ya bato ya lokuta, bango balingaka kobondela ya kotelema na bandako ya losambo mpe na bisika oyo babala-bala ekutanaka, mpo ete bato bamona bango. Ya solo nalobi na bino : basiʼbazwi lifuti na bango. 6Kasi yo, soki olingi kobondela, kota na ndako na yo, kanga porte mpe bondela Tata na yo oyo azali na esika ya sekele ; bongo Tatana yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti.

7Tango bozali kobondela, bozongela-zongela maloba te ndenge bapakano basalaka. Pamba te, bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango soki balobi mingi. 8Bosalaka lokola bango te. Pamba te, Tata na bino ayebi soki bozali na posa ya eloko nini, liboso ete bosenga ye yango !

(Lk. 11.2-4)


9 Bobondelaka boye :
Tata na biso ozali na Likolo,
tika ete kombo na yo ekumisama,

10 tika ete Bokonzi na yo eya,
tika ete mokano na yo esalama, awa na nse
mpe kuna na likolo.
11Pesa biso lelo bilei na biso ya mokolo na mokolo,

12 limbisa mabe na biso
ndenge biso mpe tolibisaka baoyo basalaka biso mabe.

13 Batela biso mpo tokweya na komekama te,
kasi kangola biso na mabe.
[Pamba te, bokonzi, nguya mpe kembo
ezali ya yo mpo na libela na libela
Makambo nyonso oyo ezali na kati ya bilembo oyo [ ], ezali te na mikanda mingi ya kala.
.]

14Pamba te soki bolimbisi bato mabe na bango, Tata na bino ya Likolo akolimbisa bino mpe. 15Kasi soki boboyi kolimbisa bato mabe na bango, Tata na bino mpe akolimbisa bino te.

16Tango bozali koboya kolia mpo na mabondeli, bokoma mawa-mawa tendenge bato ya lokuta basalaka. Pamba te, bakomisaka bilongi mawa-mawa mpo na kolakisa bato ete bazali koboya kolia. Nalobi na bino ya solo, basiʼbazwi lifuti na bango. 17Kasi tango yo ozali koboya kolia mpo na mabondeli, sukola elongi na yo mpe pakola malasi na motu, 18mpo moto ata moko te ayeba ete oboyi kolia mpo na mabondeli ; longola kaka Tata na bino oyo avandaka na sekele. Bongo Tata na yo, oyoamonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti.

Bomengo ya mokili

(Lk. 12.33-34)

19— Bobomba bomengo na mokili oyo te ; epai mpese ekoki kolia yango mpe ekoki kobeba, mpe epai miyibi bakoki kotobola mpe koyiba. 20Kasi bobomba bomengo na likolo ; epai mpese ekoki kolia yango te mpe ekoki kobeba te, mpe epai miyibi bakoki kotobola te mpe koyiba te. 21Pamba te, epai bomengo na yo ezali, motema na yo mpe ekozala kuna.

(Lk. 11.34-36)

22Liso ezali mwinda ya nzoto ; soki liso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba ekozala moi. 23Kasi soki liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekozala molili. Bongo soki moi oyo ezali na yo ekomi molili, molili yango ekokoma makasi penza.

(Lk. 16.13)

24—Moto moko te akoki kosalela bakonzi mibale. Pamba te, akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akoboya oyo mosusu : bokoki kosalela Nzambe na mbongo te.

25Yango wana nalobi na bino, bomitungisa te mpo na bomoi na bino : soki bokolia nini mpe soki bokomela nini. To mpo na nzoto na bino, soki bokolata nini. Boni, bomoi eleki biloko ya kolia te ? Bongo nzoto, eleki bilamba te ? 26Botala bandeke ya likolo elonaka te, ebukaka te, mpe ebombaka bilei na bibomopanga te, kasi Tata na bino ya Likolo aleyisaka yango. Boni, boleki yango na tina te ? 27Nani kati na bino, mpo na mitungisi na ye, akoki kobakisa molayi ya bomoi na ye, ata mpo na ngonga moko.

28Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata ? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka ; yango esalaka te mpe etongaka bilamba te. 29Nzokande nayebisi bino, ata mokonzi Salomon, kati na nkembo na ye mobimba, alataki te lokola moko na yango. 30Bongo soki Nzambe azali kolatisa na ndenge wana matiti ya bilanga, oyo ezali na bomoi lelo mpe lobi ekobwakama na moto ; akoki kolatisabino koleka yango te ? A a ! bato ya kondima moke ! 31Yango wana, bomitungisa te mpe boloba te : “Tokolia nini ?” to “Tokomela nini ?” to “Tokolata nini ?” 32Biloko wana nyonso, ezali bapakano nde baluka-lukaka yango. Kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi ete bozali na yango posa. 33Boluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na ye, bongo biloko wana nyonso bakobakisela bino yango. 34Yango wana, bomitungisa te mpo na mokolo ya lobi ; pamba te, mokolo ya lobi ekomitungisa na makambo na yango, yango moko. Mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango !
Copyright information for LinMNB