Matthew 7

Kosambisa te

(Lk. 6.37-42)

1—Bosambisa te, mpo basambisa bino mpe te. 2Pamba te, bakosambisa bino ndenge bino mpe bosambisaka baninga ; mpe bakozongisela bino ndenge bino mpe bozongiselaka baninga.

3Bongo mpo na nini ozali komona mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo ? 4Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : “nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, nzokande, oyo ya yo moko ezali na eteni ya nzete ? 5Moto ya kokosana ! Longola liboso mwa eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu mpo na kolongola mwa lititi oyoezali na liso ya ndeko na yo.

Bobebisa biloko ya bosantu te

6—Bopesa te biloko ya bosantu na bambwa ; mpe babwakela bangulu bapawuni na bino te ; nakobanga ete eniata-niata yango mpe ezongela bino mpo na kopasola bino mike-mike.

Bolemba te mpo na kosenga mpe koluka

(Lk. 11.9-13)

7—Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokozwa ; bobeta, mpe bakofungolela bino. 8Pamba te oyo asengaka, bapesaka ye. Oyo alukaka, azwaka. Mpe oyo abetaka, bafungolelaka ye porte. 9Nani kati na bino akoki kopesa mwana na ye libanga soki asengi ye limpa ? 10To soki asengi ye mbisi, akopesa ye nioka ? 11Soki bino bato mabe, boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, bongo mpo na nini te, Tata na bino oyo azali na Likolo, akopesabiloko ya kitoko na baoyo basengaka ye yango ?

Ndenge tokoki kozala na baninga

(Lk. 6.31)

12—Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bosala yango mpe ndenge moko mpo na baninga. Pamba te, oyo nde mateya ya Mibeko mpe ya baprofeta.

Bokota na porte ya moke

(Lk. 13.24)

13—Bokota na porte ya moke ! Pamba te porte ezali monene, mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene. Mpe bato mingi penza bazali kokota na yango. 14Kasi Porte ezali moke, mpe nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke. Mpe bato moke kaka nde bazali komona yango.

Bokeba na baprofeta ya lokuta

(Lk. 6.43-44)

15—Bokeba na baprofeta ya lokuta. Bayelaka bino na loposo ya bameme, kasi na solo bazali penza bambwa ya zamba. 16Bokoyeba bango na misala na bango. Boni, bokoki kobuka mbuma ya vinona nzete ya sende ? To mpe mbuma ya figi na nzete ya nzube ?

17Ndenge moko mpe, nzete nyonso ya malamu ebotaka bambuma ya malamu ; kasi nzete ya mabe ebotaka bambuma ya mabe. 18Nzete ya malamu ekoki kobota te bambuma ya mabe. Ndenge moko mpe, nzete ya mabe ekoki kobota te bambuma ya malamu. 19Nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto. 20Yango wana, bokoyeba bango na misala na bango.

(Lk. 23.25-27)

21—Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai : “Nkolo ! Nkolo !”, nde bakokota na Bokonzi ya Likolo ; kasi kaka oyo asalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.

22Na mokolo wana, bato mingi bakoloba na ngai : “Nkolo ! Nkolo !”, tosakolaki makambo na kombo na yo te ? Tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki makambo mingi ya kokamwa na kombo na yo te ? 23Bongo ngai nakozongisela bango : “Bolongwa ! Nayebi bino te ! Bino bozalaki kosala mabe !”

Motongi ndako ya mayele mpe motongi ndako ya zoba

(Lk. 6.46-49)

24—Yango wana, moto oyo azali koyoka maloba na ngai mpe azali kosalela yango, akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye likolo ya libanga. 25Mbula ebetaki mingi penza, mayi etondaki koleka, mipepe ya makasi eyaki mpe ebetaki na ndako yango. Kasi atako bongo, ndako yangoekweyaki te pamba te yango etongamaki likolo ya libanga.

26Kasi moto oyo ayokaka maloba na ngai mpe asalelaka yango te, akokani na zoba oyo atongaki ndako na ye likolo ya zelo. 27Mbula ebetaki mingi penza, mayi etondaki koleka, mipepe ya makasi eyaki mpe ebetaki na ndako yango. Kasi ndako yango ekweyaki mpe ebebaki nyonso.

(Mk. 1.22 ; Lk. 4.32)

28Tango yesu asilisaki koloba makambo wana, ebele ya bato bakamwaki mingi penza mpo mateya na ye. 29Pamba te, azalaki koteya na bokonzi nyonso, kasi lokola balakisi ya Mibeko na bango te.
Copyright information for LinMNB