Philippians 1

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu Kristo, totindi mokanda oyo epai ya basantu nyonso kati na Kristo, baoyo bazali na Filipi, mpe na bakambi mpe na badiakele na bango.

2Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe Nkolo Yesu Kristo, ezala na bino.

Losambo ya kozongisa matondi

3Mbala nyonso tango nakanisaka bino, natondaka Nzambe na ngai. 4Tango nyonso, nabondelaka mpo na bino nyonso, nabondelakabongo na esengo, 5mpo na ndenge bosalisaki ngai na mosala ya kopanza Sango Malamu, banda na mokolo ya liboso kino sikʼoyo. 6Ya solo, nazali na elikya ete, moto oyo abandaki mosala ya malamukati na bino, akosilisa yango kino na mokolo ya Yesu Kristo.

7Ezali malamu mpo na ngai, ete nazala na makanisi ya ndenge oyo mpo na bino nyonso, mpo nalingaka bino mingi penza. Pamba te, bino nyonso bosanganaka elongo na ngai na ngolu oyo Nzambe apesi ngai, ezala tango nazali na boloko, ezala tango nalobelaka Sango Malamu, to mpe tango nalakisaka yango ete ezali ya solo. 8Nzambe azali temwe na ngai ete nalingaka bino nyonso, na bolingo ya Yesu Kristo.

9Mpe libondeli na ngai yango oyo : ete bolingo na bino ekoba kokola kati na boyebi mpe bososoli nyonso, 10mpo ete bokoka kososola makambo ya malamu. Bongo bokozala peto mpe na mabe moko te kino na mokolo ya Kristo ; 11bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na nzela ya Yesu Kristo, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.

Basango ya Polo mpe ya mosala na ye

12Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekweyilaki ngai, esungi mingi penza ete Sango Malamu ekende liboso. 13Pamba te, basoda nyonso oyo bakengelaka ndako ya mokonzi mpe bato mosusu oyo bazali awa, bayebi ete nazali na boloko mpo na Kristo. 14Mpe kokangama na ngai na boloko, epesi molende na bandeko mingi kati na Nkolo, mpo na koteya Liloba ya Nzambe na mpiko nyonso mpe na kobanga te. 15Ezali ya solo ete, bato mosusu bazali koteya Kristo na zuwampe na molimo ya kowelana, kasi bato mosusu bateyaka yango na makanisi ya malamu. 16Bato oyo bazali koteya yango na bolingo, bayebi ete nazali awa mpo na kobatela Sango Malamu. 17Kasi mpo na bato ya liboso, bazali toteya Kristo na molimo ya kowelanampe na makanisi ya malamu te, bakanisaka ete soki basali bongo, nde bakoyokisangai pasi mingi na motema tango nazali awa na boloko.

18Likambo te ! Eloko ezali na tina, ezali ete, na ndenge nyonso, ata bazali koteya na makanisi ya lokuta to ya solo, kasi Kristo azali koteyama. Nazali na esengo mingi mpo na yango, mpe na kokoba kozala na esengo. 19Pamba te, mpo na mabondeli na bino mpe mpo na lisungi ya Molimoya Yesu Kristo, nayebi ete makambo wana nyonso ekosuka na kokangolama na ngai.

20Pamba te nazali kozela na motema mobimba mpe nazali na elikya ete nakoyoka soni na likambo ata moko te, kasi ezala sikʼoyo to mpe mikolo nyonso, nakotonda na molende, mpo ete Kristo akozwa lokumu na nzoto na ngai, ezala nazali na bomoi to mpe nakufi. 21Pamba te mpo na ngai, bomoi ezali Kristo, mpe kokufa ezali litomba monene. 22Kasi soki nakobi kozala na bomoi kati na nzoto, wana nakoki lisusu kobota mbuma na nzela ya mosala na ngai ; boye, nayebi te soki nasengeli kopona nini.

23Nazali kobendama na makambo oyo mibale : nalingi kotika bomoi oyo mpe kozala elongo na Kristo, pamba te yango eleki malamu ; 24kasi ezali na litomba mingi mpo na bino ete natikala na bomoi. 25Mpe lokola nazali na elikya oyo, nayebi ete nakotikala na bomoi, mpe nakozala elongo na bino, mpo na kosalisa bino ete bokola mpe bosepela kati na kondima, 26mpo ete tango nakozala lisusu kati na bino, esengo na bino kati na Kristo Yesu ekoka kotonda koleka mpo na ngai.

Etumba mpo na kondima

27Sikʼoyo, eloko ezali na tina yangʼoyo : ete bomoi na bino etambola ndenge Sango Malamu ya Kristo ezali kosenga, mpo ete, ata naye mpe namoni bino, to mpe nazali na bino elongo te, nayoka ete bozali ya kotelema ngwi kati na likanisi kaka moko, bozali kobunda lisanga na molimo moko, mpo na Sango Malamu oyo bondimaki. 28Bobanga banguna na bino te ; yango ezali elembo mpo na bango ete bakobebisama, kasi bino bokobika, pamba te ezali Nzambe moto apesaka bino elonga. 29Pamba te, mpo na oyo etali Kristo, Nzambe apesa bino bolamu, kaka mpo na kondima ye te, kasi mpo na konyokwama mpe mpo na ye, 30lokola bozali kobunda etumba ya lolenge moko na oyo bomonaki epai na ngai, mpe oyo bozali koyoka ete nazali naino kobunda.
Copyright information for LinMNB