Philippians 3

Likambo ezali na tina, ezali Kristo

1Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepela kati na Nkolo. Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai, mpo nakomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino.

2Bokeba na bambwa, bokeba na bato oyo basalaka mabe, bokeba na bato oyo bamikataka nzoto. 3Pamba te, biso nde tozali bato oyo bakatisa nzoto na kokatisama ya solo, biso baoyo tosambelaka na nzela ya Molimo ya Nzambe, biso baoyotomipesaka lokumu kati na Kristo Yesu, mpe totiaka elikya na nzoto te, 4atako ngai mpe nazali na makambo oyo nakoki kotia na yango elikya na nzoto. Soki moto moko akanisi ete akoki kotia elikya na nzoto, esengeli ayeba ete, ngai nazali na yango mingi koleka : 5Pamba te, bakataki ngai nzoto na mokolo ya mwambe, nazali moto penza ya ekolo ya Isayele, na libota ya Benzamin, mpe nazali Mo-ebreooyo abotama na baboti oyo bazali Ba-ebreo. Mpo na oyo etali Mibeko, nazalaki Mofarizeo ; 6mpo na oyo etali molende, naniokolaki Lingomba ; mpo na oyo etali bosembo oyo bato balukaka na nzela ya Mibeko, nazalaki na mabe ata moko te.

7Kasi makambo oyo ezalaki ya tina mpo na ngai, nazali komona yango sikʼoyo lokola eloko pamba mpo na Kristo. 8Kaka yango te, nazali kutu kotala makambo nyonso lokola eloko pamba, mpo na bolamu oyo eleki monene : yango nde koyeba Kristo Yesu Nkolo na ngai. Mpo na ye nde nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola biloko ya bosoto penza, mpo ete nazwa Kristo, 9mpe bakuta ngai kati na ye, nazala na bosembo na ngai moko te oyo ewutaka na Mibeko, kasi oyo ewutaka na nzela ya kondimela Kristo, bosembo oyo ewutaka na Nzambe, na nzela ya kondima.

10Nalingi koyeba Kristo, nguya ya lisekwa na ye, kosangana na bapasi na ye, kokoma lokola ye kati na liwa na ye, 11mpe na ndenge nyonso, na koka kokoma na lisekwa ya bakufi.

Kokima mbangu mpo na kolonga

12Te, elingi koloba te ete nasiʼnazwi mbano, to mpe nasi nakomi moto ya kokoka, kasi nazali kokima mbango mpo na kozwa yango, pamba te Kristo Yesu mpe asiʼazwa ngai.

13Bandeko, mpo na ngai, nakanisi te ete nasiʼnazwi mbano yango. Kasi nasalaka likambo moko : nabosanaka makambo nyonso oyo ezali sima na ngai mpe nasalaka makasi mpo na makamo oyo ezali liboso. 14Bongo nazali kokima mbango kino nakoma na suka, mpo nazwa mbano oyo Nzambe abengela ngai wuta Likolo, kati na Kristo Yesu.

15Biso nyonso oyo tosiʼtokoli na molimo, tokanisaka ndenge wana. Mpe soki na likambo moko boye, bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akolakisa bino yango. 16Nzokande, na esika oyo tosiʼtokomi, tokoba kotambola na nzela moko.

17Bandeko, bolanda bino nyonso ndakisa na ngai, mpe botala malamu penza bato oyo bazali kotambola na lolenge ya bomoi oyo bomonaki epai na biso.

18Pamba te, ndenge nayebisaki bino liboso mbala na mbala mpesikʼoyo, nazali koyebisa bino lisusu na mayi na miso, ete bato mingi bazali banguna ya ekulusu ya Kristo mpo na bizaleli na bango. 19Suka na bango ezali libebi ; nzambe na bango ezali libumu na bango ; bamikumisaka na makambo oyo eyokisaka bango soni mpe batiaka makanisi na bango na biloko ya mokili.

20Kasi biso, tozali bato ya mboka ya Likolo. Mpe tozalikozela Mobikisi na biso wuta kuna, Nkolo Yesu Kristo, 21ye oyo, akobongola nzoto na biso ya mawa mpo ete ekoma lokola nzoto na ye ya nkembo, na nzela ya nguya oyo ezali kopesa ye makoki ya kotia biloko nyonso na nse ya bokonzi na ye.
Copyright information for LinMNB