Psalms 10

Yawe, mpo na nini otelemi mosika ?


1 Yawe, mpo na nini otelemi mosika boye ?
Mpo na nini obombani na tango ya pasi ?

2 Moto na mabe, kati na lofundu na ye,
azali kolanda moto azangi makasi ;
bakangami na miango oyo ye abongisi

3 Pamba te moto na mabe amikumisaka na baposa ya motema na ye ;
apambolaka moto ya maboko makasi mpe atiolaka Yawe.

4 Moto na mabe, kati na lolendo na ye, alukaka Nzambe te ;
na makanisi na ye nyonso : “Nzambe azali na esika te”

5 Banzela na ye etambolaka malamu tango nyonso ;
azali moto na lofundu mpe mibeko na yo ezali mosika na ye ;
asekaka banguna na ye nyonso.

6 Alobaka kati na ye moko : “Eloko moko te ekoki koningisa ngai ;
nakozala na esengo tango nyonso, mpe nakozala na pasi te !”

7 Monoko na ye etondi na bilakeli mabe, lokuta mpe moyibi ;
se ya lolemo na ye etondi pasi mpe makambo na mabe.

8 Atelemaka pembeni ya bamboka,
mpe abomaka moto oyo ayebi likambo te na bisika ya kobombama ;
miso na ye etalaka na kobombama batu oyo akani kosala mabe.

9 Atelemaka na kozelaka lokola ntambwe oyo ezali kati ya libulu ;
atelemaka na kozelaka mpo na kokanga bato oyo bazangi makasi ;
akangaka bato oyo bazangi makasi, mpe abendaka bango na monyama na ye.

10 Aniataka bango, bafinanaka ;
bakweyaka na se ya makasi na ye.

11 Alobaka kati na ye moko :
“Nzambe abosana, abombi elongi na ye ; akomona ata moke te !”

12 Yawe telema ! Nzambe sembola loboko na yo ;
kobosana te bato oyo bazangi makasi.

13 Mpo na nini moto na mabe azali kotiola Nzambe ?
Mpo na nini alobaka kati na ye moko :
“Akotuna ngai te ?”

14 Kasi Yo Nzambe, ozali komona bapasi mpe minyoko ;
ozali kotala yango mpo ozwa yango na loboko na yo.
Moto ya pasi amitikaka epai na yo ;
mpe ozali mosungi ya mwana etike.

15 Buka loboko ya moto na mabe mpe moto oyo asalaka mabe ;
benga ye mpe tuna ye mpo na mabe na ye,
kino okomona yango lisusu te.

16 Yawe azali Mokonzi mpo na libela na libela ;
bikolo bikolimwa kati na mokili na ye.
17Yawe, oyokaka baposa ya baoyo bazali koyoka pasi ;
olendisaka bango mpe oyokaka koganga na bango.

18 Okobatelaka mwana etike mpe moto oyo azali konyokwama,
mpo ete moto oyo Nzambe akela wuta na mabele, abangisa lisusu te.
Copyright information for LinMNB