Psalms 101

Komipesa mpo na kobundisa mabe

Nzembo ya Davidi


1 Nakoyemba bolingo na yo
mpe bosembo na yo ;
epai na yo, Yawe, na koyemba masanzoli

2 Nakozala na bokebi mpo na tambola na bomoi ezangi pamela ;
tango nini okoya epai na ngai ?
nakotambola na kati ya ndako na ngai,
na motema oyo ezangi pamela.

3 Nakotia liboso ya miso na ngai eloko ya mabe te ;
nayinaka misala ya bato oyo bazangi boyengebene ;
ekokangama na ngai te.

4 Bato ya motema ya mabe bakozala mosika na ngai ;
nakozala na likambo moko te ya kosala na mabe.

5 Moto oyo atongaka moto oyo azali pembeni na ye na sekele ;
ye nde na kotia kati na nye
moto oyo azali na miso ya lolendo
mpe motema ya lofundu.

6 Miso na ngai ekozala likolo ya bandimi kati na mabele,
mpo bakoka kovanda na ngai ;
ye oyo atambolaka na kozanga pamela
akosalela ngai.

7 Moto moko te akosaka akovanda na ndako na ngai ;
moto moko te alobaka makambo ya lokuta
akotelema liboso na ngai.

8 Tongo nyonso, nakokanga minoko ya bato nyonso
ya mabe ya mokili,
nakolongola moto nyonso azalaka mabe
na vile ya Yawe.
Copyright information for LinMNB