Psalms 102

Libondeli ya moto ya pasi

Libondeli ya moto ya pasi, na tango asili kolemba na motema, mpe azali kobelela epai ya Yawe.


1 Yoka libondeli na ngai, Yawe ;
tika ete koganga na ngai mpo na lisalisi ekoma epai na yo.

2 Kobombela ngai elongi na yo te
tango nazali na pasi
balusa litoyi na yo epai na ngai ;
tango nabengi yo,
zongisela ngai eyano noki-noki.

3 Pamba te mikolo na ngai ezali kolimwa lokola molinga ;
mikuwa na ngai ezali kozika
lokola makala ya moto.

4 Motema na ngai ezali komitungisa
mpe ekawuki lokola matiti ;
nabosani kutu kolia bilei na ngai.

5 Mpo na kolela na se-se na ngai
natikali poso na mikuwa

6 Nazali lokola “Ibu” ya esobe ;
lokola “Ibu” na bisika oyo ebebi.

7 Pongi ekimi ngai,
nakomi lokola ndeke yango moko
likolo ya ndako.

8 Mokolo mobimba banguna na ngai bazali kofinga ngai ;
baoyo batombokeli ngai,
bazali kosalela kombo na ngai
lokola elakeli mabe.

9 Pamba te nazali kolia putulu lokola biloko na ngai ;
mpe nazali kosangisa mayi na ngai ya kobeba na
mayi ya miso

10 mpo na kanda na yo ya monene
pamba te otombolaki ngai mpe obwakaki ngai pembeni.

11 Mikolo na ngai ezali
lokola elilingi ya pokwa,
nakawuki lokola matiti.

12 Kasi yo Yawe, ozali na kiti ya bokonzi libela na libela ;
sango na yo ezali kowumela
na bato ya batango nyonso

13 Okotelema mpe okoyokela Siona mawa !
pamba te ezali tango ya kolakisa ngolu epai na ye ;
tango oyo ebongisama ekomi.

14 Pamba te mabanga na yango elingami epai ya basali na yo ;
putulu na ye
ememi bango na mawa.

15 Bikolo ekobanga kombo ya Yawe ;
bakonzi nyonso ya mokili bakokumisa nkembo na yo.

16 Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona,
mpe akomonana kati na nkembo na ye.

17 Akopesa eyano na libondeli ya baoyo baganga ;
akomona pamba te bileli na bango.

18 Tika ete yango ekomama
mpo na bato ya batango oyo ekoya ;
mpo ete bato oyo nano basalami te
bakoka kosanzola Yawe

19 Yawe atalaki na se wuta na Esika
na ye ya bosantu kuna na likolo,
wuta likolo, azali kotala mokili,

20 mpo na koyoka kolela na se-se ya bato oyo bazali na boloko,
mpe mpo na kokangola baoyo bazwaki etumbu ya liwa.

21 Bongo kombo ya Yawe ekosakolama na Siona,
mpe masanzoli na ye na Yeruzalem,

22 tango bato mpe bokonzi bakosangana
mpo na kokumbamela Yawe.

23 Na bomoi na ngai asilisaki makasi na ngai ;
akomisi mikolo na ngai mokuse.

24 Bongo nalobaki :
kolongola ngai te “Nzambe na ngai”, na kati-kati ya mikolo na ngai ;
bambula na yo ekowumela na bato ya batango nyonso.

25 Na ebandeli, otiaki bafondasio ya mokili ;
mpe likolo ezali mosala ya maboko na yo.

26 Ekopanzana
kasi yo okotikala ;
nyonso ekonzuluka lokola elamba ;
okobongola yango lokola molato,
mpe ekotiama pembeni.

27 Kasi yo, okotikala kaka ndenge moko,
mpe bambula na yo ekosuka te.

28 Bana ya basali na yo bakovanda na miso na yo ;
bana ya bana na bango bakozala liboso na yo.
Copyright information for LinMNB