Psalms 103

Tika ete mobimba na ngai ekumisa Yawe

Nzembo ya David


1 Sanzola Yawe, e molimo na ngai ;
na kati na ngai nyonso
sanzola kombo na ye ya bosantu !

2 Sanzola Yawe, e molimo na ngai,
mpe kobosana ata moke te makambo na ye nyonso ya malamu
oyo asala

3 Ye oyo alimbisaka masumu na yo nyonso,
mpe abikisaka bapasi na yo nyonso.

4 Ye oyo akangolaka bomoi na yo wuta na libulu ;
mpe alatisaka yo na bolingo mpe mawa ;

5 Ye oyo atondisaka baposa na yo na biloko ya malamu ;
na bongo bolenge na yo ezali kozonga lisusu lokola ya egle.

6 Yawe asalaka bosembo, mpe bolamu
mpo na bato nyonso bazali konyokwama.

7 Alakisaki banzela na ye na Moyize,
misala na ye na bato ya Isayele.

8 Yawe atondi na mawa mpe na ngolu
asilikaka noki te, atondi na bolingo.

9 Akofunda te mikolo nyonso,
to akobomba kanda na ye mpo na libela te.

10 Asalelaka biso te na ndenge oyo ekoki
na masumu na biso ;
to azongiselaka biso te
na ndenge oyo ekoki na mabe na biso.

11 Pamba te ndenge likolo
ezali likolo ya mokili ;
bongo bolingo na ye ezali monene
mpo na baoyo babangaka ye ;

12 Ndenge Este ezali mosika na Weste,
ndenge abwakaka masumu na biso
mosika na biso.

13 Ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa.
Bongo Yawe ayokaka mawa mpo na baoyo bazali kobanga ye.

14 Pamba te ayebi ndenge nini tosalamaki ;
azali kokanisa lisusu ete tozali putulu.

15 Mpo na moto, mikolo na ye ezali lokola matiti
abongaka lokola fololo ya bilanga ;

16 Mopepe eleki likolo na yango,
mpe yango eleki ;
mpe esika na yango ekokanisa yango lisusu te.

17 Kasi wuta libela na libela
bolingo na Yawe ezali na baoyo babangaka ye
mpe bosembo na ye na bana ya bana na bango ;

18 na baoyo batalelaka Boyokani na ye
mpe bakanisaka kotosa makebisi na ye.

19 Yawe atiaki Kiti na ye ya bokonzi na likolo ;
mpe bokonzi na ye ezali likolo na nyonso.

20 Bokumisa Yawe,
bino baanzelu na ye ;
bino bato na nguya
baoyo basalelaka mitindo na ye,
baoyo botosaka maloba na ye.

21 Bosanzola Yawe, bino mampinga na ye nyonso na likolo,
bino basali na ye,
oyo bosalaka mokano na ye.

22 Bosanzola Yawe, misala na ye nyonso
bisika nyonso ya bokonzi na ye !
sanzola Yawe, e molimo na ngai.
Copyright information for LinMNB