Psalms 104

Lokumu na Yawe


1 Sanzola Yawe, e molimo na ngai !
e Yawe Nzambe na ngai, ozali monene penza ;
olataki kongenga mpe lokumu.

2 Amizipaka na moi lokola kazaka ;
atanda likolo lokola ndako ya kapo.

3 Apikaka makonzi ya sambele na ye ya likolo
likolo ya bamayi na bango ;
akomisaka mapata motuka na ye ya bitumba ;
mpe atambolaka likolo ya mapapu ya mopepe.

4 Akomisaka mopepe bantoma na ye ;
mpe balolemo ya moto basali na ye.

5 Apika mokili likolo ya bafondasio na yango ;
yango ekoki koningana ata moke te.

6 Ozipaki yango na mozindo lokola na elamba ;
bamayi etelamaki likolo ya bangomba.

7 Kasi na pamela na yo bamayi ekimaki
na makelele ya kake
ekimaki ;

8 elekaki likolo ya bangomba,
ekitaki na se ya balobwaku,
na esika oyo
obongisaki mpo na yango.

9 Otiaki ndelo oyo ekokaki koleka te ;
lisusu te ekozipa mokili.

10 Abimisaki mayi na balobwaku ;
abongisaki bisika ebimisaka mayi na balobwaku ;
ezalaki koleka na kati-kati ya bangomba.

11 Ezali kopesa mayi na banyama nyonso ya bilanga ;
bampunda ya zamba esilisaka posa na yango.

12 Bandeke ya likolo basalaka bazala na ngambo-ngambo ya bamayi ;
eyembaka kati na bitape.

13 Azali kosopela bangomba nayi
wuta na basambele na ye ya likolo,
mokili etondi na mbuma ya misala na ye.

14 Akolisaka matiti mpo na banyama,
mpe milona mpo bato balona yango,
Na kobimisa biloko ya kolia wuta na mokili

15 na vino oyo esepelisaka motema ya moto,
mafuta oyo engengisaka elongi na ye,
mpe lipa oyo elendisaka motema na ye.

16 Banzete ya Yawe basopeli yango mayi malamu,
Sedele ya Liban, oyo ye alona.

17 Bandeke basalaki bazala na bango kuna ;
bandeke ya minene ezali na bandako na yango
na banzete ya mongufu.

18 Bangomba ya milayi ezali ya bantaba ya zamba,
madusu na mabanga ezali ebombamelo
ya balapin.

19 Sanza ezali kolakisa batango ;
mpe moi eyebi tango ekendeke kolala.

20 Omemaka molili, butu ekomaka ;
mpe banyama nyonso ya zamba etambolaka-tambolaka

21 Bantambwe egangaka mpo na nyama oyo bakangi ;
mpe elukaka bilei na yango epai na Nzambe.

22 Moi ebimi, mpe bantambwe elongwaka,
ezongaka mpe elalaka na bisika na yango
23Bongo moto akendeke na mosala na ye kino na pokwa.

24 Tala ndenge misala na yo ezali mingi, e Yawe !
Osala yango nyonso ;
Mokili etondi na bikelamo na yo.

25 Ezali na ebale monene, molayi mpe epanzana !
etonda na bikelamo oyo tokoki kotanga te,
biloko ya bomoi oyo ya minene mpe ya mike

26 Kuna nde, bamasuwa ekendaka mpe ezongaka,
mpe Leviatani oyo yo osala, esakanaka kuna.

27 Yango nyonso etalelaka yo,
mpo opesa yango biloko ya kolia na tango oyo ekoki.

28 Tango opesaka yango bilei,
ezwaka yango ;
tango ofungolelaka loboko na yo
yango etondaka na biloko ya malamu.

29 Tango obombi elongi na yo,
yango ebangaka na somo ;
tango obendi mpema na yango,
ekufaka, mpe ezongaka na putulu.

30 Tango otindi Molimo na yo,
ekelamaka,
mpe obimisaka ya sika elongi ya mokili,

31 Tika nkembo ya Yawe ewumela libela na libela ;
tika Yawe asepela na misala na ye !

32 Ye oyo atalaka mokili, mpe yango elengaka ;
ye oyo asimbaka bangomba,
mpe ebimisaka milinga.

33 Nakoyembela Yawe na bomoi na ngai mobimba ;
nakoyemba masanzoli epai ya Nzambe na ngai,
tango nyonso oyo nazali na bomoi.

34 Tika makambo oyo nazali kokanisa esepelisa ye,
lokola nasepelaka kati na Yawe.

35 Kasi bato ya masumu basila na mokili,
mpe bato ya mabe bazala lisusu te !
sanzola Yawe, e molimo na ngai.
Sanzola Yawe !
Copyright information for LinMNB