Psalms 106

Bokumisa Yawe !


1 Bozongisa matondi na Yawe
pamba te azali malamu ;
bolingo na ye ezali kowumela libela na libela.

2 Nani akoki kosakola misala ya nguya ya Yawe,
to kotatola masanzoli na ye ?

3 Mapamboli ezali na baoyo babatelaka bosembo ;
baoyo tango nyonso basalaka oyo ezali alima.

4 Kanisa ngai, Yawe,
tango okolakisa ngolu epai ya bato na yo,
yaka mpo na kosalisa ngai tango okobikisa bango ;

5 mpo nakoka kosepela na bolamu ya baponami na yo
mpo nakoka kokabola esengo na ekolo na yo
mpe nasangana na libula na yo na kopesaka masanzoli.

6 Tosalaki masumu ndenge moko lokola batata na biso basalaki ;
tosalaki mabe, mpe tosalaki misala ya mabe.

7 Tango batata na biso bazalaki na Ezipito,
bazalaki na likanisi ata moko te na makamwisi na yo ;
bakanisaki te ebele ya bolamu na yo ya mingi
kasi batombokaki pembeni ya ebale ya monene,
Ebale ya Motane.

8 Kasi abikisaki bango mpo na kombo na ye,
na kotalisa makasi ya nguya na ye.

9 Agangelaki Ebale ya Motane,
mpe yango ekawukaki ;
atambusaki bango kati na mozindo
lokola na esobe.

10 Abikisaki bango na loboko ya moyini,
na loboko ya monguna, akangolaki bango.

11 Mayi ezipaki banguna na bango ;
moko te na bango atikalaki na bomoi.

12 Bongo bandimaki bilaka na ye,
mpe bayembaki
masanzoli na ye

13 Kasi
babosanaki noki oyo asalaki ;
mpe bazelaki te toli na ye.

14 Na esobe,
bamipesaki na baposa na bango,
na esika oyo ezangi batu, bamekaki Nzambe.

15 Na bongo apesaki bango
Oyo bazalaki kosenga ;
kasi atindelaki bango bapasi.

16 Na Kam, bayokelaki Moyize zuwa,
mpe Aron, moto oyo babulisaki
Kobulisa  : na français : “consacrer
epai na Yawe.

17 Mabele efungwamaki, mpe emelaki Datan
ezipaki lisanga ya Abiram.

18 Moto epelaki na kati ya bato oyo bazalaki kolanda bango ;
moto etumbaki bato ya mabe.

19 Na Orebi,
basalaki mwana-ngombe ;
mpe bakumbamelaki ekeko esalami na ebende oyo banyangwisa.

20 Babongolaki nkembo na bango
na elilingi ya ngombe, oyo eliaka matiti.

21 Babosanaki Nzambe, oyo abikisaki bango.
Oyo asalaki makambo minene na Ezipito,

22 makamwisi na mabele ya Sham,
mpe misala ya somo na Ebale ya Motane.

23 Bongo alobaki nalingaki kobebisa bango,
soki Moyize te, moto na ye oyo apona,
atelemaki na lidusu liboso na ye,
mpo na kokanga kanda na ye,
mpo koboma bango.

24 Bongo batiolaki mabele ya kitoko ;
bandimaki elaka na ye te.

25 Bakomaki koyima-yima na kati ya bandako
na bango ya kapo ;
mpe batosaki Yawe te.

26 Bongo alapaki mpo na bango na kotombola loboko ete,
alingaki kokweyisa bango na esobe ;

27 alingaki kokweyisa bana na bango na kati-kati ya bikolo
mpe akopanza bango bipai na bipai ya mabele

28 Bamikangisaki epai ya Bale ya Peyor,
mpe baliaki bambeka oyo bapesaki
epai ya banzambe oyo bazanga bomoi ;

29 Batumbolaki Yawe mpo asilika na nzela
ya misala na bango ya mabe,
mpe motungisi eyaki kati na bango

30 Kasi Pinasi atelemaki mpe akataki likambo,
mpe motungisi yango esilaki.

31 Yango ebakisamaki epai na ye
lokola bosembo
mpo na bato ya batango nyonso oyo ezanga suka oyo ekoya.

32 Na bamayi ya Meriba bayokisaki Yawe kanda
mpe minyoko eyaki epai ya Moyize mpo na bango ;

33 pamba te batombokelaki Molimo na Nzambe,
mpe maloba oyo ebongi te ebimaki na bambebo ya Moyize

34 Babebisaki te bato
lokola Yawe atindaki bango.

35 Kasi basanganaki na bikolo,
mpe bayekolaki bokoko ya bikolo wana.

36 Bakumbamelaki banzambe na bango ya bikeko,
yango ekomaki motambo mpo na bango.

37 Bapesaki bana na bango ya basi
mpe ya mibali, mbeka
epai ya milimo mabe.

38 Basopaki makila ya moto oyo ayebi likambo te,
makila ya bana na bango ya mibali mpe ya basi,
oyo bapesaki mbeka na banzambe ya bikeko ya Kanan ;
mpe mabele ekomaki mbindo
mpo na makila na bango.

39 Bamikomisaki mbindo
mpo na oyo basalaki ;
mpo na misala na bango basalaki kindumba na bango moko.

40 Bongo Yawe asilikaki na bato na ye
mpe ayinaki libula na ye.

41 Akabaki bango na bikolo ;
mpe bayini na bango bakomaki na bokonzi
likolo na bango ;

42 banguna na bango banyokolaki bango,
mpe batiaki bango na se ya nguya na bango.

43 Tango mingi akangolaki bango ;
kasi bazalaki kaka na kotomboka,
mpe bamipesaki na masumu na bango

44 kasi amonaki pasi na bango,
tango ayokaki koganga na bango.

45 Mpo na bango akanisaki lisusu Boyokani na ye
mpe ayokelaki bango mawa
mpo na bolingo monene na ye abongolaki mokano ;

46 Asalaki ete bayokela bango mawa
baoyo nyonso bamema na bowumbu.

47 Bikisa biso, Yawe Nzambe na biso,
mpe sangisa biso wuta na bikolo
mpo tokoka kopesa matondi epai ya kombo na yo ya bosantu
mpe nkembo kati na masanzoli na yo.

48 Masanzoli ezala epai ya Yawe, Nzambe ya Isayele
libela na libela !
Tika ete bato nyonso baloba :
“Amen ! bosanzola Yawe !”
Copyright information for LinMNB