Psalms 107

BUKU YA MITANO

Nzembo ya bato oyo bakangolama


1 Bopesa matondi na Yawe,
pamba te ye azali malamu,
bolingo na ye ewumelaka
libela na libela.

2 Tika ete bato oyo bakangolama na Yawe baloba bongo
baoyo ye akangolaki na loboko ya moyini

3 baoyo osangisaki wuta na mabele,
wuta na Este mpe Weste,
wuta na Norde mpe Sude.

4 Ndambu bazalaki koyenga-yenga na esobe,
na esika ezanga bato ;
bazwaki nzela moko te ya vile epai bakokaki kovanda.

5 Bayokaki nzala mpe posa ya mayi ;
mpe bomoi na bango ekomaki pembeni ya kosuka.

6 Bongo, bagangaki epai na Yawe
na kati na minyoko na bango
mpe akangolaki bango na bapasi na bango.

7 Atambwisaki bango na nzela oyo etengama te,
kino na vile esika bakokaki kovanda.

8 Tika bango bazongisa matondi na Yawe
mpo na bolingo na ye ya makasi,
mpe misala na ye ya kokamwa mpo na bato.

9 Pamba te asilisaki posa ya mayi ;
mpe atondisaki baoyo bazalaki na nzala
na biloko ya malamu.

10 Basusu bavandaki na molili
mpe na molili ya mozindo penza,
bakangama na minyoko
na minyololo ya ebende,

11 pamba te batombokelaki Maloba ya Nzambe,
mpe batiolaki batoli ya Ye Oyo Aleki Likolo.

12 Bongo atiaki bango na se ya misala ya makasi penza ;
babetaki libaku mpe ezalaki na moto ata moko te ya kosalisa bango.

13 Bongo, bagangaki epai ya Yawe na kati ya minyoko na bango,
mpe ye abikisaki bango na bapasi na bango.

14 Abimisaki bango na molili
mpe na molili ya mozindo penza
mpe abukaki miniololo na bango.

15 Tika bango bazongisa matondi na Yawe mpo na bolingo na ye ya makasi,
mpe mpo na misala na ye ya kokamwa
mpo na bato.

16 Pamba te akweyisi ba-porte ya bibende oyo ya bronze,
mpe akataki mabende oyo bakangelaka.

17 Basusu bakomi bazoba
mpo na banzela na bango ya botomboki ;
mpe bayokaki pasi
mpo na mabe na bango

18 Bayinaki biloko nyonso ya kolia,
mpe bakomaki pene-pene ya ba-porte ya liwa.

19 Bongo, bagangaki epai ya Yawe na kati ya minyoko na bango,
mpe abikisaki bango na pasi na bango.

20 Atindaki Liloba na ye mpe abikisaki bango ;
mpe akongolaki bango na mboka ya bakufi.

21 Tika bango bazongisa matondi na Yawe mpo na bolingo na ye ya makasi,
mpe mpo na misala na ye ya kokamwa
mpo na bato.

22 Tika bango bapesa mbeka ya likabo ya matondi,
mpe balobela misala na ye elongo na banzembo ya esengo.

23 Basusu bakendaki na ebale monene
na masuwa,
bazalaki bakomersa na bamayi ya minene.

24 Bamonaki misala ya Yawe,
misala na ye ya kokamwa na mozindo

25 Pamba te alobaki mpe aningisaki mopepe ya makasi,
oyo etombolaki bambonge.

26 Bamataki na likolo
mpe bakitaki kino na se penza ;
na kobeba na bango molende elongwaki bango.

27 Bazalaki na kizungu-zungu
mpe bakomaki koningana-ningana
lokola bato balangwe ;
bazalaki na suka na mayele na bango

28 Bongo bagangaki epai na Yawe
na pasi na bango,
mpe ye abimisaki bango na pasi na bango.

29 Avandisaki nye mopepe ya makasi na makelele ya se-se,
bambonge ya ebale ya monene evandaki nyee.

30 Bazalaki na esengo tango
ekomaki nyee ;
mpe amemaki bango kino na libongo
oyo balingaki.

31 Tika bango bozongisa matondi na Yawe
mpo na bolingo na ye ya makasi,
mpe mpo na misala na ye ya kokamwa mpo na bato

32 Tika bango banetola ye na kati ya lisanga ya bato,
mpe basanzola ye na kati ya bokutani ya bampaka.

33 Abongolaki ba-ebale na esobe ;
bisika mayi ebimaka na mabele ya kokawuka,

34 mabele ya malamu na mabele ya mungwa,
mpo na mabe ya baoyo bavandaka wana.

35 Abongolaka esobe na biziba ya mayi ;
mpe mabele ya kokawuka
na bisika oyo mayi ebimaka.

36 Kuna amemaki nzala mpo evanda
mpe batongaki vile esika bakokaki kovanda.

37 Basalaki bilanga mpe balonaki banzete ya vino,
oyo epesaki bambuma malamu,

38 apambolaki bango,
mpe talo na bango ekomaki monene
mpe atikaki te bibwele na bango ekita.

39 Bongo ntalo na bango ekitaki mpe basambwaki,
mpo na minyoko, bapasi, mpe mawa.

40 Ye oyo asambwisaka bato minene,
asalaka bango batelengana na kati na esika ezanga bato
oyo ezanga nzela.

41 Kasi abimisaka bakelela wuta na bapasi na bango ;
mpe akomisaka mabota na bango mingi,
lokola etonga ya bameme.

42 Moto ya alima atali
mpe asepeli
kasi bato nyonso oyo ya mabe bakangaki monoko na bango.

43 Moto oyo azali bwanya tika abatela malamu makambo oyo ;
mpe asosola bolingo monene ya Yawe.
Copyright information for LinMNB