Psalms 108

Nakolonga

Nzembo ya David


1 Motema na ngai ezali ngwi, Nzambe ;
nakoyemba mpe nakobeta miziki
na molimo na ngai mobimba.

2 Bolamuka, gitare mpe lindanda !
Nakolamusa tongo.

3 Nakosanzola yo, Yawe, kati na bikolo ;
nakoyembela yo kati na bato.

4 Pamba te bolingo na yo ezali monene
enetolama koleka likolo ;
bolingo na yo ya makasi ekoma kino na mapata.

5 Netolama, Yawe,
likolo ya lola ;
mpe tika ete nkembo na yo
ezala likolo ya mokili mobimba !

6 Bikisa biso mpe salisa biso
na loboko na yo ya mobali,
mpo ete baoyo yo olingaka bakangolama.

7 Nzambe alobaki wuta na esika na ye ya bosantu,
“Na elonga !
Nakokabola Sikemi,
mpe nakotanga molayi ya lobwaku ya Sukoti.

8 Galada ezali ya ngai,
Manase ezali ya ngai ;
Efrayimi ezali ekoti ya libende ya motu na ngai,
Yuda ezali nzete na ngai ya bokonzi.

9 Mowabi ezali sani ya monene epai nasukolaka ;
likolo ya Edom, nabwaki sandale na ngai ;
likolo ya Filistiya nazali koganga mpo na elonga.”

10 Nani akomema ngai na vile oyo etongama makasi ?
Nani akokamba ngai na Edom ?

11 Ezali yo te, Nzambe, yo oyo obwaki biso,
mpe obimaka lisusu na mapinga ya basoda na biso te ?

12 Pesa biso lisalisi liboso ya monguna na biso ;
pamba te lisalisi ya moto
ezali na tina te.

13 Elongo na Nzambe,
tokozua elonga ;
mpe akoniata banguna na biso.
Copyright information for LinMNB