Psalms 109

Nzambe, kotikala nye te

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.

1Nzambe oyo nazali kosanzola, kovanda nye te.

2 Pamba te bato ya mabe mpe bato ya lokuta
bafungolaki minoko na bango mpo na ngai ;
balobaki na ngai na lolemo ya lokuta.

3 Na maloba ya koyina bazingi ngai ;
bazali kobundisa ngai kaka pamba.

4 Na bolingo na ngai epai ya baninga,
bazali kofunda ngai
kasi ngai nazali moto ya losambo.

5 Bazongiseli ngai mabe na malamu
mpe bayini ngai
mpo na bolingo na ngai epai ya baninga

6 Mpo na moto moko ya mabe
mpe azala monguna na ye
tika mofundi moko atelema na loboko na ye ya mobali.

7 Tango akosamba, tika amonana ete asali mabe
mpe tika libondeli na ye ekatela ye etumbu.

8 Tika mikolo na ye ekoma moke ;
tika moto mosusu azwa esika na ye ya kotambwisa.

9 Tika bana na ye bakoma bitike ;
mpe mwasi na ye akoma mwasi oyo akufela mobali.

10 Tika bana na ye bakoma mitelengano
mpe bisenga-senga ;
Tika babengana bango
na bandako na bango oyo esiʼepanzani.

11 Tika moto oyo adefisa ye,
abotola ye oyo nyonso azali na yango ;
tika bapaya babotola na makasi
bambuma ya mosala na ye !

12 Tika moto ata moko te alakisa ye bolamu ;
to tika ayokela bitike na ye mawa te.

13 Tika bana ya bana na ye basila,
bakombo na bango elongwa na bato ya batango oyo ezali kolanda

14 Tika mabe ya batata na ye
ezongaka tango nyonso liboso ya Yawe ;
tika lisumu ya mama na ye ebomama te ;

15 Tika masumu na bango ezalaka tango
nyonso liboso ya Yawe ;
ete akoka kosilisa likaniseli
na bango na mokili.

16 Pamba te akanisaki ata moke te kosala bolamu ;
kasi aniokolaki mobola, kino na liwa,
mpe moto akelela, mpe oyo azali na motema ya kotutama.

17 Alingaki kolakela mabe,
tika yango eya likolo na ye ;
azalaki kosepela na lipamboli ;
tika yango ezala mosika na ye.

18 Alataki elakeli mabe lokola elamba na ye ;
ekotaki na nzoto na ye lokola mayi,
na mikuwa na ye lokola mafuta.

19 Tika yango ezala lokola kazaka
oyo akomizipa,
lokola mokaba oyo akomilinga tango nyonso.

20 Tika oyo ezala lifuti ya Yawe
epai ya bafundi na ngai,
epai ya bato oyo balobaka maloba ya mabe
mpo na ngai.

21 Kasi yo e Yawe oyo asalaka oyo alingi,
salela ngai bolamu mpo na kombo na yo ;
atako bolamu ya bolingo na yo ezali,
kangola ngai.

22 Pamba te nazali mobola mpe moto ya kokelela ;
mpe motema na ngai ezoki mpota. Kati na ngai.

23 Nazali kolimwa lokola elilingi ya pokwa ;
bazali kobengana ngai lokola linkoko.

24 Mabolongo na ngai elembi
mpo na komilalisaka nzala mpo na mabondeli ;
nzoto na ngai ezali moke mpe ekondi.

25 Nakomi eloko ya kotiola epai ya bafundi na ngai
tango bamonaka ngai, baningisaka mitu.

26 Salisa ngai Yawe Nzambe na ngai ;
bikisa ngai ndenge bolingo na yo ezali

27 tika bayeba ete ezali loboko na yo ;
ete yo Yawe, osalaki bongo.

28 Bakoki kolakela ngai mabe,
kasi yo okopambola ;
tango batelemi mpo na kobundisa, bakoyoka soni ;
kasi mosali na yo akosepela.

29 Bafundi na ngai bakolata lokumu te.
Mpe bakozipama na soni lokola na kazaka.

30 Na monoko na ngai, nakonetola makasi Yawe
kati na ebele ya bato, nakosanzola ye.

31 Pamba te atelemaka na loboko ya mobali ya mobola,
mpo na kobikisa bomoi na ye liboso ya baoyo
bazali kokatela ye etunmbu.
Copyright information for LinMNB