Psalms 11

Esika ya kobombama ya solo

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Yawe azali esika oyo nabombamaka.
Ndenge nini bokoki koloba na ngai :
“Kima na ngomba na yo lokola ndeke”

2 Pamba te, tala bato na mabe bazali kobongisa batolotolo na bango,
bazali kotia bambanzi na bango na singa,
mpo na kobeta yango wuta na molili bato ya mitema ya sembo.

3 Soki babuki bafondasio,
moto na sembo akosala nini ?

4 Yawe azali na kati ya Ndako na ye ya bosantu,
Kiti ya Bokonzi ya Yawe ezali na likolo.
Azali kotala bana na bato ;
miso na ye ezali kotala bango malamu-malamu.

5 Yawe atalaka malamu-malamu moto na sembo ;
kasi molimo na ye eyinaka moto ya mabe mpe oyo alingaka mobulu.

6 Anokisaka likolo ya bato na mabe :
makala ya moto mpe sufulu ya moto,
mopepe ya moto, yango nde kopo ya bapasi oyo bakokabola.

7 Pamba te Yawe azali sembo,
mpe alingaka bosembo ;
bato ya malamu bakomona elongi na ye.
Copyright information for LinMNB