Psalms 110

Azali Mokonzi mpe Nganga-Nzambe

Nzembo ya David.


1 Yawe alobaki na Nkolo na ngai ;
“vanda na loboko na ngai ya mobali,
kino nakomisa banguna na yo
enyatelo ya makolo mpo na makolo na yo.”

2 Yawe akosembola nzete na yo ya nguya ya bokonzi wuta na Siona ;
okozala na bokonzi na kati ya banguna na yo !

3 Mapinga na yo ekozala na mokano malamu
na mokolo na yo ya etumba,
elati lokumu ya bosantu ;
wuta na tongo-tongo, okozwa mamwe ya bolenge na yo.

4 Yawe alapaki,
mpe akobongola makanisi na ye te :
“Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela ;
na molongo ya Melkizedeki !”

5 Yawe azali na loboko na yo ya mobali ;
akopanza bakonzi na mokolo ya kanda na ye ya makasi.

6 Akosambisa bikolo,
akotondisa bibembe,
mpe akopanza bakambi ya mokili mobimba.

7 Akomela mayi na mwa mayi oyo ezali pembeni ya nzela ;
yango wana akotombola motu na ye.
Copyright information for LinMNB