Psalms 114

Tango Isayele abimaki na Ezipito…


1 Tango Isayele abimaki na Ezipito,
ndako ya Zakobi wuta na bato oyo ya
monoko ya bapaya,

2 Yuda ekomaki Esika ya bosantu ya Nzambe,
mpe Isayele ekomaki mabele na ye.

3 Ebale monene emonaki mpe ekimaki ;
mayi ya Yordani ezongaki na sima ;

4 bangomba epumbwaki lokola bameme ya mibali ;
mpe bangomba ya mike lokola bana ya meme.

5 Nini esalemaki, e ebale monene mpo ete okima boye ?
e Yordani, mpo ete ozongi sima ;

6 bino bangomba,
mpo bopumbwa lokola bameme ya mibali ;
Bino bangomba ya mike lokola bana ya meme ?

7 Lenga, e e mokili na miso ya Yawe ;
na miso ya Nzambe ya Zakobi ;

8 Ye oyo abongolaka libanga
mpe akomisaka yango liziba ya mayi,
mpe libanga ya makasi
esika mayi ebimelaka.
Copyright information for LinMNB