Psalms 116

Yawe ayokaka mongongo na ngai


1 Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka mongongo na ngai,
ayokaka konganga na ngai mpo na mawa ;

2 Pamba te abalolaki litoyi na ye epai na ngai ;
nakobenga ye tango nyonso nakozala na bomoi

3 Basinga ya liwa ezingaki ngai,
somo ya lilita ekweyelaki ngai ;
minyoko mpe mitungisi elongaki ngai

4 Bongo nabengaki kombo ya Yawe :
“Yawe, bikisa ngai !”

5 Yawe atondi na ngolu mpe azali sembo ;
Nzambe na biso atondi na mawa.

6 Yawe abatelaka bato oyo bazali na mitema ya komikitisa ;
tango nazalaki kati na posa monene,
ye abikisaki ngai.

7 Zala na bopemi, e e molimo na ngai
pamba te Yawe azali malamu epai na yo ;

8 Pamba te yo, Yawe, okangolaki molimo na ngai wuta na liwa,
miso na ngai na mayi ya miso,
mpe makolo na ngai na kobeta libaku ;

9 ete nakoka kotambola liboso na Yawe,
na mabele ya bato ya bomoi.

10 Nandimaki, yango wana nalobaki :
“Nazali na pasi makasi !”

11 Kati na komitungisa na ngai, nalobaki :
“Bato nyonso bazali bato ya lokuta !”

12 Ndenge nini nakoki kozongisela Yawe
mpo na bolamu na ye nyonso epai na ngai ?

13 Nakotombola kopo ya lobiko,
mpe nakobenga kombo ya Yawe.

14 Nakokokisa bandayi na ngai
epai ya Yawe,
na miso ya bato na ye nyonso.

15 Liwa ya basantu ya Yawe
ezali na motuya mingi na miso na Yawe.

16 Yawe, ya solo, nazali mosali na yo ;
nazali mosali na yo, mwana ya mosali na yo ya mwasi ;
opesi ngai bonsomi wuta na minyololo na ngai.

17 Nakopesa mbeka ya kozongisa matondi epai na yo
mpe nakobenga kombo ya Yawe.

18 Nakokokisa bandayi na ngai epai ya Yave,
na miso ya bato na ye nyonso,

19 na lopango ya Ndako ya Yawe,
na kati na yo, e Yeruzalem !
Bosanzola Yawe !
Copyright information for LinMNB