Psalms 118

Bolingo na ye ezali ya libela


1 Bozongisa matondi epai na Yawe,
pamba te azali malamu ;
bolingo na ye ewumelaka libela na libela.

2 Tika ete Isayele aloba :
“Bolingo na ye ewumelaka libela na libela”

3 Tika ete ndako ya Aron eloba :
“Bolingo na ye ewumelaka libela na libela !”

4 Tika ete baoyo babangaka Yawe baloba :
“Bolingo na ye ewumelaka libela na libela !”

5 Na kati ya pasi na ngai nagangaki epai na Yawe,
mpe azongiselaki ngai eyano,
na kovandisaka ngai na bonsomi

6 Yawe azali elongo na ngai :
nakobanga te.
Bongo moto akoki kosala ngai nini ?

7 Yawe azali elongo na ngai ;
azali mosalisi na ngai.
Nakotala na elonga banguna na ngai.

8 Eleki malamu kobombama epai na Yawe,
ete kotia motema na moto.

9 Eleki malamu kobombama epai na Yawe,
ete kotia motema na bana ya bakonzi.

10 Bikolo nyonso ezingaki ngai
kasi na kombo ya Yawe, napanzi bango.

11 Ezingaki ngai, bisika nyonso,
kasi na kombo ya Yawe, napanzi bango.

12 Ezingaki ngai lokola banzoyi ;
kasi ekufi mbangu lokola banzube eziki na moto ;
na kombo ya Yawe, napanzi bango.

13 Batindikaki ngai mpo ete nakweya ;
kasi Yawe asalisaki ngai.

14 Yawe azali makasi na ngai mpe nzembo na ngai ;
akoma lobiko na ngai.

15 Koganga ya esengo mpe ya elonga
ezali koyokana na bandako ya kapo ya bato na sembo :
“Loboko ya mobali ya Yawe,
ezali kosala makambo ya ngwi !

16 Loboko ya mobali ya Yawe etelemi likolo ;
loboko ya mobali ya Yawe,
ezali kosala makambo ya nguya !”

17 Nakokufa te, kasi nakozala na bomoi,
mpe nakosakola oyo Yawe asalaki.

18 Yawe apesaki ngai etumbu na makasi penza,
kasi akabaki ngai na liwa te.

19 Fungolela ngai ba-porte ya bosembo ;
nakokota mpe nakozongisa matondi na Yawe.

20 Yango oyo porte ya Yawe ;
na yango bato na sembo bokokota ;

21 Nakozongisa matondi epai na yo, pamba te
ozongiselaki ngai eyano, okomaki lobiko na ngai.

22 Libanga oyo batongi ndako babwakaki,
ekoma libanga ya songe ya ndako ;

23 Yawe asalaki likambo oyo ;
mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso.

24 Oyo ezali mokolo Yawe asalaki ;
Tika biso tosepela mpe tozala na esengo
na mokolo yango.

25 Yawe, bikisa biso ;
ee Yawe, pesa biso bokeyi liboso.

26 Mapamboli na ye oyo azali koya na kombo ya Yawe !
Tozali kopambola bino wuta na Ndako ya Yawe.

27 Yawe azali Nzambe,
mpe angengiseli biso mwinda na ye.
Na mandalala na maboko, bosangana na molongo
ya kokende na maseke ya mesa oyo batumbaka mbeka

28 Ozali Nzambe na ngai,
mpe nakozongisa matondi epai na yo ;
Ozali Nzambe na ngai, mpe nakonetola yo.

29 Bozongisa matondi epai na Yawe, pamba te azali malamu ;
bolingo na ye ewumelaka libela na libela !
Copyright information for LinMNB