Psalms 119

Mibeko ya Yawe ezali malamu


1 Mapamboli na baoyo banzela na bango ezangi pamela ;
baoyo batambolaka ndenge Mibeko ya Yawe ezali !

2 Mapamboli na baoyo babatelaka bikateli na ye,
mpe balukaka ye na mitema na bango mobimba,

3 basalaka likambo moko te ya mabe,
batambolaka na banzela na ye !

4 opesaki makebisi,
mpo batosa yango na ndenge ya malamu.

5 Ee, tika ete banzela na ngai ezalaki ngwi,
mpo na tosaka bikateli na yo

6 Bongo nalingaki koyoka soni te,
tango nakotala malako na yo nyonso.

7 Nakosanzola yo na motema ya alima,
lokola nazali koyekola mibeko na yo ya sembo.

8 Nakotosa bikateli na yo ;
kosundola ngai libela te !

9 Ndenge nini elenge mobali akoki kobatela nzela na ye peto ?
Na kozala na bomoi ndenge ya maloba na yo

10 Nazali koluka yo na motema na ngai mobimba ;
kotika ngai te napengwa na malako na yo !

11 Nabombaki maloba na yo na motema na ngai,
mpo ete nakoka te kosala lisumu liboso na yo.

12 Masanzoli ezala epai na yo, ee Yawe ;
teya ngai bikateli na yo !

13 Na mbebo na ngai nazali kotanga mibeko nyonso
oyo ebimaka na monoko na yo.

14 Nasepelaka na kolanda bikateli na yo,
lokola moto oyo azali kosepela na bozui mingi.

15 Nakanisaka makebisi na yo,
mpe nazali kotala banzela na yo.

16 Nayokaka esengo kati na bikateli na yo ;
nakomona maloba na yo pamba te.

17 Sala malamu epai ya mosali na yo,
mpe nakozala na bomoi ; nakotosa Liloba na yo.

18 Fungola miso na ngai,
mpo nasengeli komona makambo ya kokamwa
na mibeko na yo.

19 Nazali mopaya na mokili
kobombela ngai malako na yo te.

20 Molimo na ngai ezali kozika
na posa makasi
tango nyonso mpo na mibeko na yo.

21 Opamelaka bato ya lofundu,
baoyo balakelama mabe,
mpe baoyo batika malako na yo.

22 Longola mosika na ngai soni mpe kotiolama
pamba te nabombaka bikateli na yo.

23 Ata soki bakambi bavandi esika moko,
mpe bazali kotonga ngai,
mosali na yo
akokanisa bikateli na yo.

24 Bikateli na yo esepelisaka ngai ;
epesaka ngai toli.

25 Navandaki na putulu ;
batela bomoi ndenge ezali na Liloba na yo.

26 Nayebisaki banzela na ngai,
mpe ozongiselaki ngai eyano ;
teya ngai bikateli na yo.

27 Tika ngai nasosolisa mateya ya makebisi na yo ;
bongo nakokanisa makambo na yo ya kokamwa.

28 Molimo na ngai na mawa ;
lendisa ngai ndenge ezali na Liloba na yo.

29 Batela ngai mosika na banzela ya lokuta ;
monisa ngolu,
epai na ngai na nzela ya mibeko na yo

30 Naponaki nzela ya bosolo ;
natia motema na ngai na mibeko na yo

31 Nakangami na bikateli na yo ;
Yawe, kotika ngai te nayoka soni.

32 Nazali kokima mbango na nzela ya malako na yo,
pamba te ovandisaki motema na ngai na bonsomi

33 Teya ngai, Yawe na kolanda bikateli na yo ;
bongo nakobatela yango kino na suka.

34 Pesa ngai bososoli,
mpe nakobatela mibeko na yo,
mpe nakotosa yango na motema na ngai mobimba.

35 Kamba ngai na nzela ya malako na yo,
pamba te kuna nazali kozwa esengo.

36 Balola motema na ngai na bikateli na yo,
mpe na litomba ya lokuta te.

37 Longola miso na ngai na
biloko ezanga tina ;
batela bomoi na ngai ndenge ezali maloba na yo.

38 Kokisa elaka na yo epai ya mosali na yo,
mpo ete babanga yo.

39 Longola oyo nazali kobanga
pamba te mibeko na yo ezali malamu.

40 Tala, ndenge nazali na posa ya makebisi na yo ;
batela bomoi na ngai na bosembo na yo.

41 Tika ete bolingo na yo ya makasi,
eya epai na ngai, Yawe,
lobiko na yo ndenge elaka na yo ezali ;

42 bongo nakozongisa maloba na moto oyo
afingaka ngai ;
pamba te natiaka motema na ngai
na Liloba na yo.

43 Kolongola Liloba ya solo na monoko na ngai te,
pamba te natiaka elikya na ngai na mibeko na yo.

44 Nakotosa tango nyonso mibeko na yo,
mikolo nyonso mpe libela na libela.

45 Nakotambola na bosomi nyonso,
pamba te nalukaki makebisi na yo.

46 Nakolobela bikateli na yo liboso ya bakonzi,
mpe nakoyoka soni te,

47 pamba te nasepelaka kati na malako na yo,
mpo nalingaka yango.

48 Natomboli maboko na ngai epai ya malako na yo,
oyo nalingaka ;
mpe nakokanisa bikateli na yo.

49 Kanisa Liloba na yo na mosali na yo,
pamba te opesaki ngai elikya.

50 Libondisi na ngai kati na bapasi na ngai
yangʼoyo : Elaka na yo ezali kokomisa bomoi
na ngai ya sika.

51 Bato ya lofundu bazali kosakana na ngai
ndenge balingi,
kasi napengwaki te na mibeko na yo.

52 Nazali kokanisaka mibeko na yo ya kala, Yawe,
mpe nazwi libondisi kati na yango.

53 Mawa mingi ekangi ngai
mpo na bato ya mabe
oyo babwaka mibeko na yo.

54 Bikateli na yo ezali mama ya likambo ya banzembo na ngai,
bisika nyonso nazali kolela.

55 Na butu nazali kokanisa lisusu kombo na yo, Yawe ;
mpe nakobatela mibeko na yo.

56 Nazwi lipamboli oyo, oyo ezali likambo nazalaki kosalela
nazali kotosa mitindo na yo.

57 Yo ozali eteni na ngai, Yawe ;
napesaki elaka ete nakotosa maloba na yo.

58 Nalukaki elongi na yo na motema na ngai mobimba ;
monisa ngolu na yo epai na ngai ndenge elaka na yo ezali.

59 Natalaki malamu-malamu banzela na ngai ;
mpe nazongisi matambe na ngai na bikateli na yo.

60 Nakosala noki mpe kolekisa tango te
mpo na kotosa malako na yo.

61 Atako bato ya mabe bakangi ngai basinga
nakobosana mibeko na yo te.

62 Na kati-kati ya butu nalamukaka
mpo na kopesa yo matondi,
mpo na mibeko na yo ya bosembo.

63 Nazali moninga ya bato nyonso oyo babangaka yo,
mpe ya baoyo balandaka makebisi na yo.

64 Mokili etondi na bolingo na yo, Yawe ;
teya ngai bikateli na yo

65 Salela mosali na yo bolamu,
ndenge ezali liloba na yo, Yawe.

66 Teya ngai boyebi mpe bososoli ya malamu,
pamba te nandimaka malako na yo.

67 Liboso ete naniokwama, nazalaki koyenga-yenga ;
kasi sikʼoyo nazali kotosa Liloba na yo.

68 Ozali malamu mpe oyo osalaka ezali malamu ;
teya ngai bikateli na yo.

69 Atako bato ya lofundu bazali kobebisa lokumu na ngai
na makambo ya lokuta ;
nazali kobatela makebisi na yo
na motema na ngai mobimba.

70 Mitema na bango ezali mabanga,
mpe eyokaka eloko moko te ;
kasi ngai, nasepelaka kati na mibeko na yo.

71 Ezalaki malamu mpo na ngai kozala na pasi ;
yango etindaki ngai nayekola mitindo na yo.

72 Mibeko oyo ewutaka na monoko na yo
ezali motuya mingi mpo na ngai,
koleka kutu wolo mpe palata bankoto na bankoto.

73 Maboko na yo
esalaki ngai mpe ebongisaki ngai ;
pesa ngai bososoli mpo nayekola malako na yo.

74 Tika bato oyo babangaka basepela
tango bazali komona na ngai,
pamba te natiaki elikya na ngai na Liloba na yo.

75 Nayebi mibeko na yo ezali sembo
mpe na boyengebene omonisaki ngai pasi

76 Tika ete bolingo na yo ya makasi ezala libondisi na ngai
ndenge elaka na yo ezali epai ya mosali na yo.

77 Tika ete mawa na yo eya epai ngai,
mpo nazala na bomoi ;
pamba te mibeko na yo ezali esengo na ngai.

78 Tika ete bato ya lofundu bayoka soni,
mpo na mabe oyo basalelaki ngai kaka pamba ;
kasi ngai, nakanisaka makebisi na yo.

79 Tika ete baoyo babangaka yo
babaluka epai na ngai,
baoyo basosolaka bikateli na yo.

80 Tika ete motema na ngai ezanga pamela
liboso na bikateli na yo,
mpo nayoka soni te.

81 Molimo na ngai elembi mpo na posa
ya lobiko na yo ;
kasi natie elikya na Liloba na yo.

82 Miso na ngai elembi,
ezali kotalela elaka na yo
Nazali koloba “tango nini okobondisa ngai ?”

83 Atako nakomi lokola eloko oyo bakamolaka
batie likolo ya milinga ;
nabosani bikateli na yo te.

84 Kino tango nini mosali na yo asengeli kozela ?
Tango nini okopesa etumbu na bato
oyo bazali konyokola ngai ?

85 Bato ya lofundu bazali kotimola mabulu ya mitambo
mpo na ngai ;
ezali bongo te na mibeko na yo.

86 Malako na yo nyonso ebongi na kotiela motema ;
salisa ngai pamba te bato bazali konyokola ngai kaka pamba !

87 Etikalaki moke penza
mpo balongola ngai na mokili ;
kasi nabwakaki makebisi na yo te.

88 Batela bomoi na ngai ndenge ezali bolingo na yo,
mpe nakotosa bikateli ya monoko na yo.

89 Liloba na yo, Yawe ezali seko na seko ;
etelemi ngwi na Likolo.

90 Boyengebene na yo ekokoba kowumela na mabota na mabota ;
Otiaki mokili, mpe

91 Mibeko na yo ezali kowumela kino mokolo oyo
mpo na mitindo na yo ;
pamba te biloko nyonso ezali kosalela yo.

92 Soki mibeko na yo ezalaki esengo na ngai te,
mbele nasi na beba kati na pasi na ngai.

93 Nakobosana ata moke te makebisi na yo ;
pamba te obatelaki bomoi na ngai
na nzela na yango.

94 Bikisa ngai, pamba te nazali moto na yo ;
nalukaki makebisi na yo.

95 Bato ya mabe bazali kozela kobebisa ngai ;
kasi ngai, nakokanisa bikateli na yo.

96 Na likambo nyonso oyo ezali ya kokoka
nazali komona ndelo ;
kasi malako na yo ezali na ndelo te.

97 Ee ! tala ndenge nalingaka mibeko na yo !
nakanisaka yango mokolo mobimba.

98 Malako na yo ekomisa ngai moto ya bwanya
koleka banguna na ngai,
pamba te yango ezali mikolo nyonso elongo na ngai.

99 Nazali na bososoli koleka balakisi na ngai nyonso ;
pamba te nakanisaka bikateli na yo.

100 Nazali na bososoli koleka mikolo,
pamba te natosaka makebisi na yo.

101 Nabatelaki makolo na ngai
na nzela nyonso ya mabe,
mpo nakoka kotosa Liloba na yo.

102 Natikaki mibeko na yo te,
pamba te yo moko oteyaki ngai.

103 Tala ndenge maloba na yo ezali elengi mingi
na monoko na ngai,
koleka kutu mafuta ya nzoyi.

104 Nasosoli na nzela ya makebisi na yo ;
yango wana, nayinaka nzela nyonso ya mabe.

105 Liloba na yo ezali mwinda
na makolo na ngai,
mpe moi na nzela na ngai.

106 Nalapaki ndayi,
mpe nalendisaki yango,
ete nakolanda mibeko na yo ya bosembo.

107 Namoni pasi mingi,
batela bomoi na ngai, Yawe ;
ndenge ezali na Liloba na yo.

108 Ndima, Yawe, masanzoli ezali kobima
na monoko na ngai na motema moko ;
mpe teya ngai mibeko na yo.

109 Atako tango nyonso namemaka bomoi na ngai
na maboko na ngai
kasi nabosanaka mibeko na yo te.

110 Bato ya mabe batielaki ngai motambo,
kasi natikaki makebisi na yo te.

111 Bikateli na yo ezali libula na ngai
ya mikolo nyonso ;
ezali esengo ya motema na ngai.

112 Motema na ngai evandi na kobatela bikateli na yo
kino penza na suka.

113 Nayinaka bato ya mitema mibale ;
kasi nalingaka mibeko na yo.

114 Yo ozali esika na ngai epai na bombamaka
mpe libende ya makasi oyo ebatelaka ngai ;
natie elikya na ngai na Liloba na yo.

115 Bolongwa liboso na ngai,
bino bato bosalaka mabe,
ete nakoka kobatela malako ya Nzambe na ngai !

116 Simba ngai ndenge ezali elaka na yo,
mpe nakozala na bomoi ;
mpe kotika te ete elikya na ngai ebunga

117 Simba ngai, mpe nakokangolama ;
mpe nakotala tango nyonso bikateli na yo.

118 Obuakaka baoyo nyonso
bapengwaka na bikateli na yo ;
pamba te lokuta na bango ezali na tina moko te.

119 Bato nyonso ya mabe ya mokili otiaka bango pembeni ;
lokola bosoto, yango wana nalingaka bikateli na yo.

120 Mosuni na ngai ezali kolenga mpo na somo na yo ;
natelemi na bobangi ya mibeko na yo.

121 Nasalaki oyo ezali sembo mpe ekoka ;
kosundola ngai te na maboko ya bato
oyo bazali konyokola ngai.

122 Batela malamu mosali na yo ;
kotika te ete bato ya lofundu banyokola ngai.

123 Miso na ngai elembi mpo na kotala lobiko na yo,
na kotala elaka na yo ya bosembo.

124 Salela mosali na yo ndenge bolingo na yo ezali
mpe teya ngai bikateli na yo.

125 Nazali mosali na yo ;
pesa ngai bososoli mpo ete nasosola bikateli na yo.

126 Tango ekoki mpo yo osala, Yawe
mibeko na ye ezali ya kobukana !

127 Mpo na nalingaka malako na yo,
koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto.

128 Mpe mpo ete natala makebisi na yo
ya alima nyonso ;
nayinaka nzela nyonso ya mabe.

129 Bikateli na yo ezali ya kokamwisa ;
yango wana natosaka yango.

130 Emoniseli ya maloba na yo epesaka mwinda
epesaka bososoli na bato ya pamba.

131 Nafungoli monoko na ngai,
mpe nazali kopema,
na posa mingi ya malako na yo.

132 Baluka epai na ngai mpe yokela ngai mawa,
ndenge osalaka tango nyonso epai ya
baoyo balingaka kombo na yo.

133 Kamba matambe ya makolo na ngai
ndenge ezali Liloba na yo ;
tika lisumu moko te
ezala na bokonzi likolo na ngai.

134 Kangola ngai na minyoko ya bato,
mpo ete nakoka kotosa makebisi na yo !

135 Ngengisela mosali na yo elongi na yo,
mpe teya ngai bikateli na yo !

136 Ebele ya mayi ya miso ezali kobima na miso na ngai,
pamba te mibeko na yo etosami te.

137 Sembo ezali yo, Yawe,
mpe mibeko na yo ezali alima.

138 Bikateli oyo otia ezali sembo ;
ezali ya kokoka na kotia motema.

139 Molende na ngai ezali kolia ngai ;
pamba te banguna na ngai bayebi maloba na yo te.

140 Bilaka na yo emonana ete ezali ya solo ;
mpe mosali na yo alingaka yango.

141 Ata nazali moke mpe oyo batiolaka,
nabosanaka makebisi na yo te.

142 Bosembo na yo ezali tango nyonso,
mpe mibeko na yo ezali solo.

143 Pasi mpe minyoko ekangi ngai ;
kasi malako na yo ezali esengo na ngai.

144 Bikateli na yo ezali libela na libela alima ;
pesa ngai bososoli,
mpo ete nazala na bomoi.

145 Nazali kobenga na motema na ngai mobimba :
zongisela ngai eyano, Yawe,
mpe nakotosa bikateli na yo.

146 Nazali kobelela yo ;
bikisa ngai mpe nakobatela bikateli na yo !

147 Nalamukaka liboso ete tongo etana,
mpe nagangaka mpo na lisalisi ;
natiaka elikya na ngai na Liloba na yo.

148 Miso na ngai etikalaka ya kofungwama
na batango ya butu,
mpo nakoka kokanisa bilaka na yo.

149 Yoka mongongo na ngai
na ndenge ya bolingo na yo ;
batela bomoi na ngai, Yawe,
ndenge mibeko na yo ezali.

150 Baoyo babongisaka mabongisi ya mabe
bazali pene-pene na ngai ;
kasi bazali mosika na mibeko na yo.

151 Nzoka nde ozali pene-pene na ngai, Yawe ;
mpe malako na yo nyonso ezali ya solo.

152 Banda kala nasi nayekola wuta na bikateli na yo ;
ete otia yango mpo na libela.

153 Tala bapasi na ngai, mpe kangola ngai ;
pamba te nabosanaka mibeko na yo te.

154 Kotela ngai mpe kangola ngai ;
batela bomoi na ngai na ndenge elaka na yo ezali.

155 Lobiko ezali mosika na bato ya mabe,
pamba te balukaka bikateli na yo te.

156 Mawa na yo ezali monene penza, Yawe ;
batela bomoi na ngai ndenge mibeko na yo ezali.

157 Bayini oyo bazali konyokola ngai bazali ebele ;
kasi natikaka bikateli na yo te.

158 Natalaka bato oyo bazangi kondima na nkele na motema,
pamba te batosaka Liloba na yo te.

159 Tala ndenge nalingaka makebisi na yo ;
Yawe, batela bomoi na ngai,
na ndenge ya bolingo na yo.

160 Maloba na yo nyonso ezali ya solo ;
mibeko na yo nyonso ya sembo ezali seko na seko.

161 Bakambi bazali konyokola ngai kaka pamba ;
kasi motema na ngai ezali kolenga Liboso ya Liloba na yo.

162 Nasepelaka kati na elaka na yo
lokola moto azwi biloko mingi na etumba.

163 Nayinaka mpe na boyaka lokuta ;
kasi nalingaka Mobeko na yo.

164 Na mokolo mobimba,
nakumisaka yo mbala sambo ;
mpo na Mibeko na yo ya bosembo.

165 Bato oyo balingaka Mobeko na yo
bazali na kimia monene ;
mpe eloko ata moko te ekoki kobetisa bango libaku.

166 Nazali kozela
lobiko na yo, Yawe ;
mpe nazali kolanda malako na yo.

167 Natosaka bikateli na yo ;
pamba te nalingaka yango mingi penza.

168 Natosaka makebisi na yo
mpe bikateli na yo,
pamba te oyebi banzela na ngai nyonso.

169 Tika ete koganga na ngai ekoma
liboso na yo, Yawe ;
pesa ngai bososoli na ndenge ya maloba na yo !

170 Tika ete kosenga na ngai
ekoma liboso na yo ;
kangola ngai na ndenge ya elaka na yo.

171 Tika ete bambebo na ngai etonda na masanzoli ;
pamba te oteyaka ngai bikateli na yo.

172 Tika ete lolemo na ngai eyemba malako na yo ;
pamba te malako na yo nyonso ezali sembo.

173 Tika ete loboko na yo ezala ya kobongama mpo na kosalisa ngai ;
pamba te napona makebisi na yo.

174 Nazali na posa mingi ya
lobiko na yo, Yawe ;
mpe mibeko na yo ezali esengo na ngai.

175 Tika ete ngai nazala na bomoi,
mpo ete nakoka kosanzola yo ;
mpe mibeko na yo ekoka kosimba ngai.

176 Nazalaki koyenga-yenga lokola etonga ya bameme
oyo ebungi ;
luka mosali na yo,
pamba te nabosani malako na yo te.
Copyright information for LinMNB