Psalms 12

Nzambe akokisaka bilaka na ye

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; ayembaki yango na gitareya basinga mwambe.


1 Yawe, salisa biso
pamba te bato oyo batosaka makambo na yo bazali lisusu te ;
bandimi bazali kolimwa na kati ya bana na bato.

2 Moto nyonso azali kokosa moninga na ye ;
bambebo na bango oyo etonda na maloba ya sukali,
elobaka na lokuta nyonso.

3 Tika ete Yawe alongola bambebo nyonso oyo etondi na maloba ya sukali,
mpe lolemo oyo elobaka na lolendo nyonso ;

4 Baoyo balobaka : “Tokolonga mpo na lolemo na biso ;
bambebo ezali ya biso moko ;
bongo nani azali mokonzi na biso ?”

5 Mpo ete bato bazangi makasi bazali konyokwama,
mpo ete bato bakelela bazali koganga ;
Yawe alobi boye :
“Sikʼoyo nakotelema, mpe nakobatela bango
liboso ya bato oyo bazali konyokola bango.”

6 Maloba na Yawe ezali maloba ya peto ;
ezali peto lokola palata
oyo epetolami na moto,
mpe ekomi peto mbala sambo.

7 Ee Yawe, okobomba biso na kimia nyonso,
okobatela biso liboso ya bato oyo libela na libela

8 Bato na mabe bazali koleka-leka pembeni-pembeni ;
tango makambo ya mabe ezali kokumisama kati na bato.
Copyright information for LinMNB