Psalms 120

Yawe, kangola ngai !

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe


1 Nabengi Yawe kati na bapasi na ngai,
mpe ye azongiseli ngai eyano.

2 Bikisa ngai, Yawe,
na bambebo ya lokuta,
mpe na lolemo oyo ekosaka.

3 Eloko nini akosala mpo na yo,
mpe akobakisela yo nini, e lolemo oyo ekosaka ?

4 Akopesa yo etumbu na makonga ya mino ya elombe,
elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.

5 Mawa na ngai ete nazali
kovanda kati na Meseke,
mpo nazali kovanda na kati-kati ya bandako
ya kapo ya Kedali.

6 Nawumeli mingi kovanda na kati
ya bato oyo bayinaka kimia.

7 Nazali moto ya kimia ;
kasi soki nalobi, baponaka etumba.
Copyright information for LinMNB