Psalms 121

Lisungi na ngai ewutaka na Yawe

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe


1 Natomboli miso na ngai likolo ya bangomba…
lisalisi na ngai ekowuta wapi ?

2 Lisalisi na ngai ekowuta na Yawe,
mozalisi na likolo mpe mokili.

3 Akotika te ete lokolo na yo ekende na moselu,
Ye oyo akengelaka yo akolala pongi te.

4 Ya solo, Ye oyo akengelaka Isayele
akoyoka pongi ata moke te to akolala mpe te.

5 Yawe azali mokengeli na yo ;
Yawe azali elilingi na yo,
na loboko na yo ya mobali.

6 Moi ekosala yo mabe te na moi
to sanza na butu.

7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso ;
akokengela bomoi na yo.

8 Yawe akokengela kokende na yo
mpe kozonga na yo,
banda sikʼoyo kino libela.
Copyright information for LinMNB