Psalms 127

Ye moto asalaka nyonso

Nzembo ya Salomo ; nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Soki Yawe atongi ndako te,
baoyo bazali kotonga yango
bazali kosala mosala ya mpunda ;
soki Yawe akengeli vile te,
bato oyo bazali kokengela ;
batelemi kaka pamba mpo nakokengela.

2 Ezali mosala ya mpunda ete bolamukaka tongo-tongo mpe
bolalaka noki te,
bosalaka makasi mpo na biloko ya kolia
pamba te apesaka ndenge moko na bato
oyo ye alingaka tango bazalaka na pongi.

3 Bana bazali bomengo
oyo ewutaka na Yawe ;
mpe kobota bana ezali lifuti oyo ewutaki epai na ye.

4 Lokola makonga na maboko ya mobundi etumba,
ndenge wana ezali bana oyo moto aboti na bolenge na ye.

5 Mapamboli na moto oyo atondisi bango na saki na ye !
Bakoki koyoka soni te
tango akofundana na banguna na bango na porte.
Copyright information for LinMNB