Psalms 128

Tika ete Yawe apambola yo !

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Mapamboli na bato nyonso oyo batosaka Yawe,
oyo batambolaka na banzela na ye !

2 Okolia mbuma ya mosala na yo ;
Mapamboli mpe bolamu ekozala ya yo.

3 Mwasi na yo akozala lokola nzete ya vino,
oyo ebotaka malamu ; kati ya ndako na yo ;
bana na yo lokola banzete ya olive
pembeni-pembeni ya mesa na yo.
4Tala ndenge ezali moto oyo apambwama, oyo atosaka Yawe.

5 Tika Yawe apambola bino wuta na Siona,
mikolo nyonso ya bomoi na bino,
tika bomona bolamu ya Yeruzalem.

6 Mpe tika bomona bana ya bana na bino.
Tika ete kimia ezala likolo ya Isayele !
Copyright information for LinMNB