Psalms 129

Banyokolaki ngai, kasi nalembaki te

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Banyokolaki ngai mingi penza wuta bolenge na ngai ;
tika Isayele aloba :

2 banyokolaki ngai mingi penza wuta bolenge na ngai,
kasi balongaki ngai te.

3 Baloni bilanga ;
batimolaki mokongo na ngai ;
basali mikala na bango ya milayi na mokongo na ngai.

4 Kasi Yawe azali sembo,
akataki basinga ya bato ya mabe
mpo ete nazala na bonsomi
5Tika ete baoyo nyonso bayinaka Siona,
mpe bazonga na soni.

6 Tika bakoma lokola matiti
oyo ebotaka likolo ya ndako,
oyo ekawukaka liboso ete ekola ;

7 matiti oyo, mobuki mbuma atondisaka
na yango maboko na ye te,
to mpe moto oyo akangaka maboke atondisaka
na yango maboko na ye te.

8 Tika baleki nzela baloba te ete :
“Lipamboli na Yawe ezala likolo na bino ;
topamboli bino na kombo ya Yawe !”
Copyright information for LinMNB