Psalms 130

Kati na bapasi nabelelaki Yawe

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Tango nabimi wuta na bisika ya mozindo !
nagangi epai na yo, Yawe

2 Yawe, yoka mongongo na ngai ;
tika ete otia matoyi na yo na koganga na ngai mpo na lisalisi.

3 Soki yo, Yawe, otalaka masumu ;
Yawe, mbele nani akokaki kotelema ?

4 Kasi bolimbisi ezali epai na yo,
mpo ete batosa yo.

5 Nazali kozela Yawe ;
molimo na ngai ezali kozela,
mpe kati na Liloba na ye natie elikya na ngai.

6 Molimo na ngai ezali kozela Yawe,
koleka kutu ndenge satinele azelaka tongo,
koleka kutu ndenge satinele azelaka tongo.

7 Isayele, tia elikya na yo na Yawe,
pamba te bolingo makasi ezali epai na Yawe,
mpe kokangolama ya kokoka ezali epai na ye.
8Ye moko akokangola Isayele na masumu na bango nyonso.
Copyright information for LinMNB