Psalms 135

Nkolo azali malamu


1 Bosanzola Yawe !
Bosanzola kombo na Yawe ;
bosanzola ye, bino basali na Yawe ;

2 bino bato bosalaka kati na Ndako na Yawe,
kati na lopango ya Ndako ya Nzambe na biso.

3 Bosanzola Yawe,
pamba te Yawe azali malamu ;
boyemba masanzoli mpo na kombo na ye,
pamba te ezali kitoko.

4 Pamba te Yawe aponaki Zakobi mpo azala ya ye moko,
Isayele mpo ezala bomengo na ye moko.

5 Nayebi ete Yawe azali monene,
ete Yawe na biso azali monene koleka banzambe nyonso.

6 Yawe azali kosala oyo alingi,
na likolo mpe awa na se,
na ba-ebale mpe na se penza na yango.

7 Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili,
atindaka kongenga ya kake elongo na mbula,
mpe abimisaka mipepe wuta na bandako na ye oyo abombela yango.

8 Akweyisaki bana ya liboso ya Ezipito,
bana ya liboso ya bato mpe ya banyama.

9 Atindaki bilembo na ye mpe makambo ya kokamwa
kati na yo, Ezipito,
mpo na kobundisa Falawo mpe basali na ye nyonso.

10 Akweyisa bikolo ebele,
mpe abomaki bakonzi ya nguya :

11 Siwon : mokonzi ya bato ya Amor,
Ogi : mokonzi ya Basan,
mpe bakonzi nyonso ya Kanana.

12 Mpe akabaki mokili na bango lokola libula,
libula epai ya bato na ye, Isayele

13 Kombo na yo, Yawe, ekotikala libela ;
sango na yo, Yawe, na mabota na mabota

14 Pamba te Yawe akolongisa bato na ye ;
mpe akoyokela basali na ye mawa.

15 Bikeko ya bikolo
ezali kaka palata mpe wolo ;
esalama na maboko ya bato.

16 Bikeko yango ezali na minoko,
kasi ekoki koloba te ;
ezali na miso, kasi ekoki komona te ;

17 ezali na matoyi, kasi ekoki koyoka te ;
ezali na pema te na minoko na yango.

18 Bato oyo basala bikeko yango, bakozala lokola yango,
mpe bongo ekozala baoyo nyonso batiaka mitema kati na yango.

19 E e ndako ya Isayele,
bosanzola Yawe !
E e ndako ya Aron, bosanzola Yawe !

20 E e ndako ya Levi, bosanzola Yawe !
Bino baoyo bobangaka Ye,
bosanzola Yawe !

21 Masanzoli ezala na Yawe wuta na Siona,
epai na Ye oyo avandaka na Yeruzalem !
Bosanzola Yawe.
Copyright information for LinMNB