Psalms 137

Pembeni ya ba-ebale ya Babilone


1 Tovandaki pembeni ya ba-ebale ya Babilone
mpe tozalaki kolela tango tozalaki
kokanisa lisusu Siona.

2 Kuna nde likolo ya banzete
totiaki mandanda na biso.

3 Pamba te kuna, bato oyo bakangaki biso na bowumbu
batunaki biso mpo na banzembo
bato oyo bazalaki konyokola biso basengaki
toyemba banzembo ya esengo ;
bolobaki ;
“Boyembela biso nzembo moko na banzembo ya Siona !”
4Ndenge nini tokoki koyemba banzembo ya Yawe na mabele ya bapaya ?

5 Soki nabosani yo, Yeruzalem,
tika ete loboko na ngai ya mobali ebosana mosala na yango.

6 Tika lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai
soki nakanisi lisusu yo te,
soki namoni Yeruzalem te
esengo na ngai oyo eleki likolo.

7 Kanisa lisusu, Yawe, likambo bato ya Edom basalaki,
na mokolo oyo Yeruzalem ekweyaki ;
bazalaki koganga :
“Bobuka yango, bobuka yango kino na bafondasio na yango !”

8 Ee elenge mwasi ya Babilone,
obongami mpo na kopanzana !
Esengo mingi na moto oyo azali kozongisela yo
mpo na oyo osalaki biso !

9 ye oyo azali kokanga bana na yo,
mpe akopanza bango na libanga !
Copyright information for LinMNB