Psalms 138

Nalingi koyemba bosembo na yo

Nzembo ya David


1 Nakosanzola yo, Yawe, na motema na ngai mobimba ;
liboso na banzambe, nakoyemba masanzoli na yo.

2 Nakogumbama na kati ya Ndako na yo ya bosantu,
mpe nakosanzola kombo na yo
mpo na bolingo na yo mpe mpo na boyengebene na yo ;
pamba te onetoli kombo na yo mpe
liloba na yo likolo ya biloko nyonso !

3 Tango nabengaki, ozongiselaki ngai eyano ;
okomisaki ngai molende mpe elombe.

4 Tika bakonzi nyonso ya mokili basanzola yo, Yawe,
tango bayoki maloba ya monoko na yo.

5 Tika bayemba banzela ya Yawe,
pamba te nkembo na Yawe ezali monene.

6 Atako Yawe azali na Likolo,
amonaka bato oyo bamikitisa,
kasi ayebi na mosika bato ya lolendo.

7 Atako natamboli na kati-kati ya bapasi,
yo obatelaka bomoi na ngai ;
osembolaka loboko na yo mpo na kobundisa
kanda ya bayini na ngai,
na loboko na yo ya mobali ebikisaka ngai.

8 Yawe akokokisa makambo
oyo azali kolinga mpo na ngai ;
bolingo na yo, Yawe, ekowumela libela na libela ;
kosundola misala ya maboko na yo te !
Copyright information for LinMNB