Psalms 139

Yawe ayebi makambo na ngai nyonso

Nzembo ya David ; epai ya mokambi ya bayembi.


1 Yawe,
Yo olukaki ngai,
mpe oyebi ngai.

2 Oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka ;
ososolaka makanisi na ngai na mosika.

3 Ososolaka kobima na ngai
mpe kolala na ngai ;
oyebi banzela na ngai nyonso.

4 Liboso liloba ezala na lolemo na ngai
oyebi yango nyonso, Yawe.

5 Yo ozingi ngai, sima mpe liboso ;
lokola otia loboko na yo likolo na ngai.

6 Boyebi ya boye ezali ya kokamwa mingi
mpo na ngai,
ezali likolo mingi mpo ngai nasosola

7 Esika nini nakokende
longwa na Molimo na yo ?
Esika nini nakokima
longwa na miso na yo ?

8 Soki namati na likolo,
ozali kuna ;
soki nasali mabulu ya mozindo mbeto na ngai,
ozali mpe kuna.

9 Soki na mati na mapapu ya tongo,
mpe ata nakei kovanda na suka ya ebale ya monene,

10 Kuna mpe loboko na yo ekotambwisa ngai,
mpe loboko na yo ya mobali ekosimba ngai makasi

11 Soki nalobi :
“ya solo molili ekobomba ngai
mpe moi ekomi butu nzinga-nzinga na ngai,”

12 Ya solo, molili ekozala molili te epai na yo ;
butu ekongenga lokola moi,
pamba te molili ezali lokola mwinda.

13 Pamba te okelaki biteni ya kati na ngai ya nzoto,
otongaki ngai esika moko na kati ya libumu ya mama na ngai.

14 Nasanzoli yo pamba te nazali ekelamo ya somo mingi
mpe ya kokamwa mingi ;
misala na yo ezali ya kokamwa.
Nayebi yango malamu.

15 Kobongisama na ngai ya mikuwa
ezalaki ya kobombama te epai na yo,
tango nasalamaki na esika ya kobombama,
tango natongamaki esika moko na mozindo ya mabele.

16 Miso na yo emonaki nzoto na ngai
tango naino ezwaki lolenge na yango te ;
mikolo nyonso oyo obongisa mpo na ngai,
ezali ya kokomama na kati ya buku na yo
liboso ete moko na kati na yango ezala.

17 Tala ndenge ezali motuya makanisi na yo epai na ngai, Nzambe !
Ndenge ezali ebele penza !

18 Soki natangi yango,
ezali mingi penza koleka zelo ya ebale.
Soki nalamuki, nazali kaka elongo na yo.

19 Soki olingaki, kaka koboma moto mabe, Nzambe !
Bolongwa mosika na ngai,
bino bato bosopaka makila ya bato !

20 Bazali koloba mpo na yo na makanisi ya mabe ;
bayini na yo bazali kosalela kombo na yo
na ndenge ekoki te.

21 Nakoki koyina te baoyo bayinaka yo, Yawe !
Nakoki kozala na nkele te na baoyo batelemelaka yo ?

22 Nazali na likambo te kasi nayini bango ;
Nazali kotanga bango lokola banguna na ngai.

23 Tala ngai malamu-malamu, Nzambe,
mpe yeba motema na ngai ;
meka ngai, mpe yeba makanisi na ngai !

24 tala soki nzela ya mabe ezali kati na ngai,
mpe kamba ngai na nzela ya seko !
Copyright information for LinMNB