Psalms 14

Mokili oyo ebebisama

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Zoba alobaka na motema na ye :
“Nzambe azali te.”
Bamibebisa, misala na bango ezali mabe ;
ata moko te,
azali kosala makambo ya malamu.

2 Wuta na likolo,
Yawe azali kotala bana na bato ;
mpo na komona soki moto ya bososoli azali,
oyo azali koluka Nzambe.

3 Bango nyonso babunga nzela,
mpe babeba elongo ;
moto ata moko te azali,
oyo azali kosala makambo ya malamu,
ata moko te !

4 Baoyo nyonso basalaka mabe, bazali na boyebi te ?
Bazali kolia bato na ngai,
ndenge baliaka lipa ;
babelelaka kombo na Yawe te.

5 Kuna, bakozala na somo monene,
pamba te Nzambe azali kati na lisanga ya bato na sembo.

6 Bino baoyo bosalaka mabe, bokoki kobebisa mabongisi ya moto oyo akelela,
kasi Yawe azali esika na ye oyo abombamaka.

7 A a, soki lobiko ya Isayele ekokaki kowuta na Siona !
Tango Yawe akozongisa bato na ye
oyo bakangama na bowumbu.
Tika ete Zakobi atonda na esengo, Isayele asepela.
Copyright information for LinMNB