Psalms 140

Kangola ngai na maboko ya motioli

Nzembo ya David ; epai ya mokambi ya bayembi.


1 Kangola ngai Yawe, na moto ya mabe ;
batela ngai liboso ya moto ya mobulu ;

2 baoyo bakanisaka mabongisi
ya mabe na mitema na bango ;
mpe balukaka kobunda bitumba mikolo nyonso.

3 Bapelisaka lolemo na bango
lokola nyoka
pwazo ya nyoka ezali na bambebo na bango.

4 Batela ngai, Yawe,
na maboko ya moto ya mabe ;
batela ngai na bato ya mobulu,
baoyo bazali kosala mabongisami mpo na kokweyisa makolo na ngai !

5 Bato ya lofundu batieli ngai monyama ;
batandi basinga ya monyama na bango
batieli ngai mitambo na nzela na ngai

6 Yawe, nalobaki epai na yo ;
“Yo ozali Nzambe na ngai !”
Tia litoyi, Yawe, na koganga na ngai mpo na mawa

7 Yawe oyo asalaka oyo ye alingi,
ozali mokangoli na ngai ya makasi
yo moto ozipaka motu na ngai na mokolo ya etumba.

8 Kotala te ete baposa ya moto mabe esalama, Yawe ;
kotala te mabongisami na bango ekoka kolonga
soki te bakokoma lolendo

9 Tika mitu ya baoyo bazingi ngai
ezipama na se ya bapasi oyo ebimisaki.

10 Tika makala ya moto esopana likolo na bango ;
tika babwakama na moto,
kati na mabulu ya poto-poto,
bakoka kotelema lisusu te.

11 Tika batioli
bawumela lisusu te na mokili ;
tika bapasi elanda bato ya mobulu

12 Nayebi ete Yawe azali kobatela na bosembo mobola,
mpe akokotela bato bakelela.

13 Ya solo, bato na sembo bakosanzola kombo na yo ;
mpe bato ya alima bakovanda liboso na yo.
Copyright information for LinMNB