Psalms 141

Simba ngai na loboko na yo !

Nzembo ya David.


1 Yawe, nazali kobenga yo,
yaka noki epai na ngai !
tia litoyi na mongongo na ngai,
tango nazali kobenga yo !

2 Tika libondeli na ngai ekoma liboso na yo lokola ansa
tala Matayo 2.11
 ;
tika kotombolama ya maboko na ngai
ezala lokola mbeka ya pokwa.

3 Tia mokengeli liboso ya monoko na ngai, Yawe ;
batela malamu porte ya bambebo na ngai.

4 Kotika te ete motema na ngai emipesa na mabe,
na kosangana na misala ya mabe
elongo na baoyo basalaka makambo ya mabe ;
kotika te ete nalia biloko na bango ya kitoko.

5 Tika moto na sembo abeta ngai,
yango ezali malamu ;
tika apamela ngai,
yango ezali mafuta likolo ya motu na ngai ;
motu na ngai ekoboya yango te.
Nzoka nde libondeli na ngai
ekobundisa tango nyonso misala ya
baoyo basalaka makambo ya mabe.

6 Bakambi na bango bakobwakama
likolo ya bangomba ;
mpe bato ya mabe bakoyekola
ete maloba na ngai elobamaki malamu.

7 Bakoloba : “lokola moto atindaka mpe akabolaka mokili
ndenge moko mikuwa na biso na monoko ya se ya bakufi.

8 Yawe, Nkolo na ngai,
kasi miso na ngai ezali kaka epai na yo, Yawe oyo asalaka oyo alingi ;
epai na yo na kobombama,
kosundola ngai te na liwa !”

9 Batela ngai na minyama
oyo batieli ngai,
mpe na mitambo ya bato oyo basalaka mabe.

10 Tika ete bato ya mabe bakweya na minyama na bango moko ;
bongo ngai naleka na kimia nyonso.
Copyright information for LinMNB