Psalms 142

Yo ozali ebombelo na ngai

Nzembo ya David. Libondeli oyo abondelaki tango azalaki na katiya libulu.


1 Nagangaki makasi epai na Yawe ;
Natomboli mongongo na ngai epai na Yawe mpo na mawa.

2 Nasopaki bileli na ngai liboso na ye ;
liboso na ye nazali koloba minyoko na ngai.

3 Tango molimo na ngai ezalaki kolemba-lemba
na kati na ngai,
yo oyebaki nzela na ngai ;
na nzela oyo nalekaki bato batielaki ngai motambo.

4 Tala na loboko ya mobali,
mpe mona ;
moto ata moko te azali na makanisi mpo na ngai
nazali na esika ya kobombama te,
moto ata moko te azali na makanisi
mpo na bomoi na ngai.

5 Nazali koganga epai na yo, Yawe,
nalobi : “Yo ozali ebombelo na ngai,
eteni na ngai na mokili ya bato ya bomoi !”

6 Yoka koganga na ngai,
pamba te nazali moto akelela oyo azangi elikya ;
kangola ngai na
baoyo bazali kolanda ngai,
pamba te baleki ngai na makasi.

7 Bimisa ngai na boloko
mpo ete nakoka kosanzola kombo na yo !
Bongo bato na sembo bakoya kosangana esika nazali,
mpo na bolamu na yo epai na ngai.
Copyright information for LinMNB