Psalms 145

Bokonzi na yo ezali ya seko

Nzembo ya kokumisa ; nzembo ya David.


1 Nakonetola yo, Mokonzi Nzambe na ngai.
Nakosanzola kombo na yo mpo na libela na libela.

2 Mikolo nyonso nakosanzola yo,
nakotombola kombo na yo
mpo na libela na libela.

3 Yawe azali monene,
mpe abongi koleka na masanzoli ;
monene na ye ekoki koyebana na moto te.

4 Bato ya tango moko bakokumisa misala na yo
epai ya baoyo ya tango mosusu ;
bakoloba misala na yo ya nguya.

5 Bakolobela nkembo ya kongenga ya lokumu na yo ;
mpe nakokanisa misala na yo ya kokamwa.

6 Bakoloba nguya ya misala na yo ya kokamwa ;
mpe nakosakola misala na yo ya minene.

7 Bakokumisa bolamu na yo oyo eleki mingi ;
mpe na esengo nyonso bakoyembela bosembo na yo !

8 Yawe azali na ngolu mpe na mawa,
asilikaka noki te mpe atondi na bolingo.

9 Yawe azali malamu epai ya moto nyonso ;
azali na mawa na bato nyonso oyo ye asalaki

10 bato nyonso oyo osala bakosanzola yo, Yawe ;
basantu na yo bakonetola yo.

11 Bakolobela nkembo ya bokonzi na yo,
mpe bakoloba mpo na nguya na yo,

12 mpo ete bato nyonso bayeba misala na yo ya nguya,
mpe nkembo ya kongenga ya bokonzi na yo.

13 Bokonzi na yo ezali Bokonzi ya seko,
mpe boyangeli na yo ekowumela na batango nyonso ya bato
Yawe azali moyengebene na bilaka na ye nyonso ;
mpe moto ya bolingo epai ya bato nyonso asalaki.

14 Yawe asimbaka baoyo nyonso bakweyaka,
mpe atelemisaka baoyo nyonso bangunzama.

15 Miso ya bato nyonso etalaka yo,
mpe opesaka bango bilei na tango ekoki.

16 Ofungolaka loboko na yo,
mpe osilisaka baposa ya biloko nyonso
oyo ezali na bomoi.

17 Yawe azali sembo na banzela na ye nyonso ;
mpe moto ya bolingo epai ya bato nyonso oyo asala.

18 Yawe azali pene-pene na bato nyonso
oyo babengaka ye,
epai ya baoyo nyonso babengaka ye na solo.

19 Akokisaka baposa ya baoyo babangaka ye ;
ayokaka koganga na bango
mpe abikisaka bango.

20 Yawe abatelaka baoyo nyonso balingaka ye,
kasi bato nyonso ya mabe bakobeba.

21 Monoko na ngai ekoloba masanzoli na Yawe.
Tika ete bikelamo nyonso
esanzola kombo na ye ya bosantu
mpo na libela na libela.
Copyright information for LinMNB