Psalms 147

Nzambe na mokili mpe na tango nyonso


1 Bosanzola Yawe !
Tala ndenge azali malamu ;
boyemba masanzoli epai ya Nzambe na biso !
kitoko mingi mpe ebongi.
Kosanzola ye

2 Yawe azali kotonga Yeruzalem ;
azali kosangisa bato ya Isayele
oyo bakima na bikolo ya bapaya.

3 Abikisaka mitema etutama,
mpe akangaka bapota na bango.

4 Akataka talo ya minzoto,
mpe abengaka moko na moko na bakombo na yango.

5 Yawe na biso azali monene,
mpe makasi na nguya ;
bososoli na ye ezali na ndelo te.

6 Yawe asungaka moto oyo amikitisaka ;
kasi akweyisaka bato ya mabe na mabele.

7 Boyembela Yawe elongo na matondi ;
bobetela Nzambe na biso miziki na lindanda !

8 Azipaka likolo na mapata,
abongisaka mbula mpo na mokili,
mpe abimisaka matiti likolo ya bangomba ya mike.

9 Apesaka biloko ya kolia na bibwele,
mpe na bana ya kombe-kombe tango babengaka.

10 Esengo na ye ezalaka na makasi ya mpunda te ;
kosepela na ye ezalaka na makolo ya moto te.

11 Yawe asepelaka kati na baoyo
babangaka ye,
na baoyo batiaka elikya na bango na bolingo na ye ya makasi.

12 Netola Yawe, Yerusalem !
Sanzola Nzambe na yo, Siona !

13 Pamba te ye moto akomisaka baporte na yo makasi,
mpe apambolaka bato na yo,
kati na yo.

14 Atiaka kimia na bandelo na yo ;
mpe atondisaka yo na ble ya kitoko.

15 Atindaka malako na ye na mokili ;
Liloba na ye epanzanaka noki penza !

16 Apesaka mbula ya mabanga
lokola bapwale ya meme,
mpe apanzaka mbula ya mike-mike
lokola putulu.

17 Abwakaka mbula na ye ya mabanga lokola mabanga ya mike-mike,
nani akoki kotelema liboso ya mopepe ya malili na yango ?

18 Atindaka liloba na ye, mpe anyangwisaka yango ;
atindaka mopepe na ye ya makasi,
mpe bamayi etiolaka.

19 Amonisaka Liloba na ye na Zakobi,
Mibeko na ye mpe bikateli na ye na Isayele.

20 Asalaki bongo na ekolo ata moko te ;
eyebaki mibeko na ye te.
Bosanzola Yawe !
Copyright information for LinMNB