Psalms 148

Na likolo mpe na se


1 Bosanzola Yawe !
Bosanzola Yawe wuta na Likolo !
Bosanzola ye na bisika oyo eleki likolo !

2 Bosanzola ye,
bino baanzelu na ye nyonso !
Bosanzola ye, mapinga ya basoda na ye nyonso ya likolo !

3 Bosanzola ye, moi mpe sanza !
Bosanzola ye, bino nyonso,
minzoto oyo engengaka !

4 Bosanzola ye, yo Lola oyo eleki likolo ;
mpe bino bamayi, oyo bizali na likolo !

5 Tika yango esanzola kombo na Yawe !
Pamba te apesaki motindo,
mpe yango ekelemaki.

6 Atiaki yango na bisika mpo na libela na libela ;
apesaki bikateli oyo ekoki koleka te.

7 Bosanzola Yawe wuta na mokili ;
bino bikelamu ya ebale ya monene,
mpe bino bisika nyonso ya mozindo,

8 moto mpe mbula ya mabanga,
mbula ya pembe mpe mapata,
mopepe ya makasi oyo esalaka mitindo na ye,

9 Bino bangomba mpe bangomba nyonso ya mike,
banzete oyo ebotaka mbuma mpe banzete ya sedele,

10 banyama ya zamba mpe bibwele nyonso,
bikelamo ya mike
mpe bandeke oyo epumbwaka,

11 bakonzi ya mokili mpe bikolo nyonso,
bino bana ya bakonzi mpe bakambi nyonso ya mokili,

12 bilenge mibali mpe bilenge basi,
bapaka mpe bana mike ;

13 tika bango basanzola kombo na Yawe !
Pamba te kombo na ye kaka nde enetolami ;
kongenga na ye ezali likolo ya mokili
mpe likolo ya lola.

14 Atelemisi mpo na bato na ye liseke moko ;
masanzoli ya basantu na ye nyonso,
ya Isayele, bato oyo bazali ya kokangama na motema na ye
pene-pene.
Bosanzola Yawe !
Copyright information for LinMNB