Psalms 15

Nani akoki kovanda na Nzambe ?

Nzembo ya David


1 Yawe, nani akovanda na ndako na yo ya kapo ?
Nani akovanda na ngomba na yo ya bosantu ?

2 Ezali moto oyo atambolaka na ndenge oyo ezangi pamela,
oyo asalaka makambo ya bosembo,
mpe oyo alobaka makambo ya solo
oyo ewutaka na motema na ye ;

3 oyo asalelaka lolemo na ye te
mpo na kotonga bato ;
oyo asalaka mabe na moninga na ye te,
oyo abebisaka moninga na ye te ;

4 oyo atalaka pamba moto oyo asalaka mabe,
kasi atosaka baoyo babangaka Yawe ;
oyo abatelaka ndayi na ye,
ata soki yango epesi ye pasi ;

5 oyo asengaka litomba te likolo ya mbongo oyo adefisi,
mpe andimaka likabo te
mpo na kokweyisa moto oyo asala likambo te.
Moto oyo asalaka makambo oyo, akoki koningana te.
Copyright information for LinMNB