Psalms 16

Nzela na bomoi

Nzembo ya David.


1 Nzambe, batela ngai na kimia nyonso,
pamba te nazali koluka esika ya kobombama epai na yo.

2 Nalobi na Yawe :
“Yo ozali Nkolo na ngai ;
bolamu na ngai ekowuta kaka epai na yo !”

3 Mpo na basantu oyo bazali kati na mokili,
bazali batu moko ya lokumu,
basepelisaka ngai mingi penza.

4 Baoyo balandaka banzambe mosusu,
mawa na bango ekobakisama ;
nakopesa te makabo na bango ya makila,
to nakotanga bakombo na bango
na bambebo na ngai te.

5 Yawe apesaki ngai ndambo ya bomengo na ngai
mpe kopo na ngai ;
yo nde otiaki eteni na ngai na kimia ;

6 Bandelo etiamaki mpo na ngai
na bisika ya kitoko ;
ya solo nazwi bomengo moko ya kitoko penza.

7 Nakosanzola Yawe,
ye moto apesaka ngai toli ;
ata na butu, motema na ngai eteyaka ngai.

8 Natiaka Yawe tango nyonso liboso na ngai ;
pamba te azali na loboko na ngai ya mobali,
nakoningana te.

9 Yango wana motema na ngai ezali na esengo
mpe lolemo na ngai ezali kosepela ;
nzoto na ngai mpe ekopema na kimia nyonso.

10 Pamba te okosundola ngai te
na mboka ya bakufi,
mpe okondima te ete Mosantu na yo apola.

11 Olakisaki ngai nzela oyo ememaka na bomoi ;
okotondisa ngai na esengo na miso na yo,
elongo na bisengo ya libela na libela oyo ezali
na loboko na yo ya mobali.
Copyright information for LinMNB