Psalms 17

Bazali kolanda ngai kaka pamba

Libondeli ya David


1 Yawe, yoka komilongisa na ngai,
Oyo ezali sembo !
Yoka koganga na ngai !
Tia litoyi na libondeli na ngai,
oyo ebimi na bambebo oyo etondi lokuta te.

2 Tika ete komilongisa na ngai ewuta epai na yo ;
tika ete miso na yo emona oyo ezali alima.

3 Atako oluki koyeba
motema na ngai,
atako otali ngai malamu-malamu na butu,
mpe omeki ngai,
okomona eloko ata moko te ;
nazwaka mokano ete monoko na ngai ekosala lisumu te.

4 Mpo na oyo etali misala ya bato, na nzela ya maloba
ya bambebo na yo namibatelaki
liboso ya banzela ya moto ya mobulu.

5 Matambe na ngai ezali kaka na banzela na yo ;
mpe makolo na ngai ekomemama na moselu te.

6 Nzambe, nazali kobenga yo,
pamba te okozongisela ngai eyano ;
tia litoyi na yo epai na ngai,
mpe yoka libondeli na ngai.

7 Lakisa makamwisi ya bolingo na yo ya monene,
yo moto obikisaka na loboko na yo ya mobali,
baoyo bayaka kobombama kati na yo,
liboso ya bayini na bango.

8 Batela ngai lokola mbuma ya mwindu
ya liso na yo,
bomba ngai na se ya elili ya mapapu na yo ;

9 mpo na bato na mabe oyo bazali konyokola ngai,
mpo na banguna na ngai oyo bazingi ngai, bango
bazali koluka liwa na ngai.

10 Bakangi mitema na bango ya mabanga ;
mpe minoko na bango elobaka na lofundu.

11 Bazali kolanda ngai, sikoyo
bazingi ngai,
bazali kotala ngai malamu,
mpo babwaka ngai na mabele.

12 Bazali lokola ntambwe
oyo ezali na posa makasi mpo na kopasola nyama ;
lokola ntambwe ya monene
oyo elali na esika ya kobombama.
13Yawe, telema, bundisa bango,
kweyisa bango ;
kangola ngai na maboko ya bato na mabe, na mopanga na yo !

14 Yawe,
na loboko na yo, bikisa ngai na bato ya lolenge wana,
bikisa ngai na maboko ya bato ya mokili oyo,
baoyo lifuti na bango ezali na bomoi oyo.
Okokanga nzala ya baoyo yo olingaka ;
bana na bango bazali na mingi penza,
mpe babombela bana na bango.

15 Kasi ngai,
kati na bosembo, nakomona elongi na yo ;
tango nakolamuka, nakosepela mpo na kotala elili na yo.
Copyright information for LinMNB