Psalms 18

Natondi yo mpo okangoli ngai

Nzembo ya David mosali ya Yawe epai ya mokambi ya bayembi ; ayembelaki yango Yawe tango Yawe abikisaki ye na maboko ya banguna na ye, mpe na maboko ya Sawuli. David alobaki :


1 Yawe, makasi na ngai,
nalingaka yo mingi penza.

2 Yawe azali libanga na ngai,
esika na ngai ya makasi, mpe ye mokangoli na ngai ;
Nzambe na ngai azali libanga na ngai,
nabombamaka epai na ye.
Ye azali ebende ya makasi oyo ebatelaka ngai,
makasi ya lobiko na ngai
mpe ndako na ngai oyo etongama makasi penza.

3 Nakobelela epai na Yawe,
oyo akoki mpo na kozwa masanzoli,
mpe nakobika na maboko ya banguna na ngai.

4 Basinga ya liwa ezingaki ngai ;
mpe bamayi ya libebi ekweyelaki ngai na mbalakata.

5 Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai,
mpe mitambo ya liwa etiamaki liboso na ngai.

6 Kati na pasi na ngai, nabengaki Yawe ;
nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo na lisungi.
Ayokaki mongongo na ngai wuta na Ndako na ye ;
koganga na ngai ekomaki liboso na ye,
na matoyi na ye.

7 Bongo mokili eninganaki mpe elengaki,
mpe bafondasio ya bangomba eninganaki ;
elengaki pamba te Yawe asilikaki.

8 Milinga ezalaki kobima na zolo na ye ;
mpe moto oyo ebomaka
ezalaki kobima na monoko na ye,
mpe makala ya moto ezalaki kobima na monoko na ye.

9 Akitisaki likolo, mpe akitaki ;
mpe mapata ya mwindu ezalaki na se ya makolo na ye.

10 Amataki likolo ya anzelu
oyo babengaka Selibin mpe azalaki kopumbwa ;
azalaki kopepa likolo ya mapapu ya mopepe.

11 Akomisaki molili esika na ye ya kobombama,
kapo na ye oyo ezingi ye,
molili enokisaka mbula ya mapata ya likolo

12 wuta na kongenga oyo ezalaki liboso na ye,
mapata, mbula ya mabanga,
mpe makala ya moto ezalaki kobima
13Yawe angulumaki wuta na likolo ;
mongongo ya oyo aleki likolo eyokanaki,
Mikanda mosusu ebakisi na 13 mbula ya mabanga enokaki, mpe makala ya moto ekweyaki


14 Abwakaki makonga na ye
mpe apanzaka banguna na ngai ;
kongenga minene ya kake
mpe abungisaki bango nzela.
15Se ya ebale monene emonanaki, mpe bafondasio ya mokili emonaki polele napamela na yo e Yawe ;

16 Atandaki loboko na ye wuta na likolo ;
akamataki ngai mpe abimisaki ngai
na likama oyo nazalaki na yango na mayi ya mozindo penza.

17 Akangola ngai na maboko ya monguna na ngai
ya makasi mpe liboso ya baoyo bazalaki koyina ngai ;
pamba te balekaki ngai na makasi.

18 Babundisaki ngai na mokolo oyo nazalaki na pasi ;
kasi Yawe azalaki mosungi na ngai.

19 Abimisaki ngai atiaki ngai na esika oyo ezangi likama
akangolaki ngai, mpo azalaki kosepela na ngai

20 Yawe asalelaki ngai bongo mpo na bosembo na ngai ;
apesaki ngai lifuti mpo na bopeto ya maboko na ngai.

21 Pamba te nabatelaki banzela na Yawe ;
mpe napesaki Nzambe na ngai mokongo te
na nzela ya kosala mabe.

22 Mibeko na ye nyonso ezali liboso na ngai ;
mpe naboyaki te kotosa mitindo na ye.

23 Nazalaki pamela te liboso na ye ;
mpe namibatelaki liboso ya masumu.

24 Yawe apesaki ngai lifuti mpo na bosembo na ngai ;
mpo na bopeto ya maboko na ngai liboso na ye.

25 Na moyengebene, omonisaka boyengebene na ye
epai ya moto oyo azangi pamela omimonisaka pamela moto azangi.

26 Omimonisaka peto epai na ye
oyo azali peto ;
kasi epai ya moto na mabe,
ozongiselaka ye na ndenge ya mabe na ye.

27 Obikisaka libota ya bato oyo bamikitisaka ;
mpe okitisaka bato oyo miso na bango etonda lofundu.

28 Yawe, batela mwinda ezalaka ya kopela.
Nzambe na ngai,
bongola molili na ngai ekoma mwinda.

29 Na lisalisi na yo
nakoki kobundisa basoda ebele ;
elongo na Nzambe nakoki kopumbwa
lopango.

30 Mpo na Nzambe ! Nzela na ye ezali ya kokoka ;
liloba ya Yawe emonani ete ezali ya solo ;
ye azali ebende ya makasi
oyo ebatelaka baoyo nyonso babombamaka epai na ye.

31 Pamba te, nani azali Nzambe soki Yawe te ?
Nani azali libanga na biso soki Nzambe na biso te ?

32 Ye azali Nzambe oyo apesaka ngai makasi,
mpe akomisaka nzela na ngai ya kokoka.

33 Akomisi makolo na ngai lokola oyo ya mboloko ;
mpe atelemisi ngai na bisika ya likolo penza.

34 Ye moto alakisa maboko na ngai
ndenge babundaka etumba ;
mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya ebende.

35 Opesaka ngai ebende na yo
ya makasi oyo ebatelaka mpo na elonga ;
loboko na yo ya mobali esalisi ngai,
mpe okitaka mpo na kokomisaka ngai monene.

36 Obongiseli makolo na ngai esika ya monene ;
mpe makolo na ngai ekobeta mabaku te.

37 Nalandaki banguna na ngai
mpe nakangaki bango ;
nazongaka sima te soki naino nabomi bango te.

38 Nanyataka bango mpe bakokaka kotelema te ;
bakweyaka na se ya makolo na ngai.

39 Opesaka ngai makasi ya kobunda etumba ;
ogumbaka bayini na ngai
na se ya makolo na ngai.

40 Okimisaka banguna na ngai
liboso na ngai ;
mpe nabebisaka baoyo bayinaka ngai.

41 Bagangaki mpo ete basalisa bango,
kasi moto ya kobikisa bango azalaki te ;
bagangaki epai ya Yawe,
kasi azongiselaki bango eyano te.

42 Nanikaki bango mike-mike lokola putulu
oyo mopepe ezali kopumbwisa ;
nabwakaki bango mosika
lokola poto-poto na banzela.

43 Okangolaki ngai wuta na kowelana ya bato ;
Otiaka ngai motu ya bikolo ;
bato oyo nayebaki te bakomi na se ya bokonzi na ngai.

44 Tango bayokaki ngai,
batosaki ngai ;
bapaya bamikitisaki liboso na ngai.

45 Bango nyonso balembaki ;
babimaki na kolenga nyonso wuta
na bisika na bango ya makasi oyo babombamaki.

46 Yawe azali na bomoi !
Masanzoli ezala na ye oyo azali libanga na ngai !
Netolama nzambe Mobikisi na ngai !

47 Azali Nzambe oyo azongisaka mabe na oyo basali ngai,
Nzambe oyo atiaka bikolo na se ya makolo na ngai,

48 oyo abikisaki ngai liboso ya banguna na ngai.
Onetolaki ngai likolo ya banguna na ngai,
mpe okangoli ngai liboso ya bato ya mobulu.

49 Yawe, yango wana nakosanzola yo
na kati ya bikolo ;
nakoyemba banzembo ya masanzoli
mpo na kombo na yo.

50 Apesi elonga monene
na mokonzi na ye ;
mpe alakisaki bolamu na ye ya makasi na mopakolami na ye
epai ya David mpe na libota na ye mpo na libela.
Copyright information for LinMNB