Psalms 19

Mabombami mibale oyo Nzambe alakisaki

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Likolo eyebisaka nkembo ya Nzambe ;
mapata esakolaka mosala ya maboko na ye.

2 Mokolo eyebisaka makambo yango
na mokolo oyo elandaka,
mpe butu moko elakisaka yango na butu oyo elandaka ;

3 Ezali na makambo ya koloba te, to maloba te
epai wapi mingongo na yango eyokanaka te.

4 Mongongo na yango eyokani na mokili mobimba,
maloba na yango ekomaki kino na suka ya mokili.
Na likolo, asalaki ndako ya kapo mpo na moi,

5 oyo ekokani lokola elenge mobali oyo abali,
oyo azali kobima liboso na sambele na ye,
lokola elombe oyo azali kosepela
mpo na kokima mbangu.

6 Ebimaka na suka moko ya likolo,
mpe ekendaka kosukela kino na suka mosusu ;
mpe eloko moko te ebombama na molunge na yango.

7 Mibeko na Yawe ezali ya kokoka,
epesaka lisusu molimo bomoi.
Bikateli ya Yawe ezali ya solo,
ekomisaka moto ya pamba, moto ya bwanya.

8 Makebisi na Yawe ezali alima,
esepelisaka motema.
Malako na Yawe ezali peto,
epesaka pole na miso,

9 Kobanga Yawe ezali peto,
ewumelaka libela na libela ;
mitindo na Yawe ezali solo,
yango nyonso elongo ezali sembo.

10 Ezali na motuya mingi koleka wolo,
koleka wolo mingi ya peto penza ;
eleki mafuta ya nzoi na elengi,
koleka mafuta ya nzoi oyo ezali kobima sika.

11 Na nzela na yango, mosali na yo azali kozwa toli
lifuti monene ezali na kobatelaka yango

12 Nani akoki kososola mabe na ye ?
Limbisa masumu na ngai oyo ezali ya kobombama.

13 Batela mpe mosali na yo na masumu ya nko ;
kotika te ete masumu yango ezala na bokonzi likolo na ngai :
bongo nakozala na pamela te,
mpe nakozala moto oyo ayebi likambo te na lisumu ya monene.

14 Yawe, tika ete
maloba ya monoko na ngai
mpe makanisi ya motema na ngai esepelisa yo ;
Yawe, libanga na ngai
mpe moto oyo akangolaka ngai.
Copyright information for LinMNB