Psalms 20

Yawe, longisa mokonzi na biso !

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Tika ete Yawe azongisela yo eyano
tango ozali na pasi ;
tika ete kombo ya Nzambe ya Zakobi ebatela yo.

2 Tika ete atindela yo lisungi wuta na esika ya bosantu
mpe tika ete apesa yo makasi wuta na Siona.

3 Tika ete akanisa makabo na yo nyonso,
mpe andima mbeka na yo ya kotumba.

4 Tika ete apesa yo oyo motema na yo elingi,
mpe alongisa mabongisami na yo nyonso.

5 Tokoganga na esengo tango yo ozali molongi,
mpe tokotombola bendele na biso
na kombo ya Nzambe na biso.
Tika ete Yawe akokisa makambo nyonso
oyo ozali kosenga ye.

6 Sikʼoyo, nayebi ete Yawe abikisaka
mopakolami na ye ;
azongiselaka ye eyano wuta na likolo na ye ya bosantu,
na lisungi ya nguya ya loboko na ye ya mobali.

7 Basusu batiaka elikya na mituka ya bitumba,
basusu na mpunda ;
kasi biso totiaka elikya na kombo ya Yawe
Nzambe na biso.

8 Bafukamaka na mabolongo mpe bakweyaka ;
kasi biso tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi.

9 Yawe, bikisa mokonzi !
Zongisela biso eyano tango tozali kobenga !
Copyright information for LinMNB