Psalms 21

Matondi mpo na elonga

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Yawe, mokonzi azali kosepela kati na makasi na yo ;
tala ndenge esengo na ye ezali monene
kati na elonga oyo opesaka !

2 Opesaki ye oyo motema na ye elingaki ;
mpe opimelaki ye te makambo oyo asengaki yo na bambebo na ye.

3 Oyambaki ye na mapamboli ya motuya penza,
mpe otiaki ekoti ya bokonzi ya wolo,
oyo ya peto penza, na motu na ye.

4 Asengaki yo bomoi,
mpe opesaki ye yango ;
opesi ye bomoi ya molayi
mpe ya libela na libela.

5 Nkembo na ye ezali monene penza
mpo na elonga oyo opesaka ;
Olatisaki ye kongenga mpe lokumu.

6 Ya solo, opesaki ye mapamboli ya solo ;
okomisaki ye moto na kosepela mpo na esengo ya miso na yo.

7 Pamba te mokonzi atiaka motema na ye na Yawe ;
mpe mpo na bolingo makasi ya oyo Aleki na Likolo,
akoningana te.

8 Loboko na yo ekokanga banguna na yo nyonso ;
loboko na yo ya mobali
ekokanga baoyo bayinaka yo.

9 Tango okomimonisa,
okokomisa bango lokola fulu ya moto ;
Yawe akosilisa bango na kanda na ye,
mpe moto ekoboma bango.

10 Okobebisa mabota na bango na mokili ;
mpe bana na bango
na kati ya bana na bato.

11 Ata bakani kosala yo mabe,
ata basaleli yo likita,
bakolonga te.

12 Pamba te okokimisa bango,
tango okobwakela bango bambanzi
ya tolotolo na yo.

13 Yawe,
netolama kati na makasi na yo ;
tokoyemba mpe tokosanzola nguya na yo.
Copyright information for LinMNB