Psalms 22

Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai ?

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; ayembaki yango na mongongo oyo babengaka : “Mboloko ya tongo.”


1 Nzambe na ngai, Nzambe na ngai,
mpo na nini otiki ngai ?
Mpo na nini ozali mosika
ozanga kobikisa ngai,
ozali mosika ozanga koyoka kolela na ngai ?

2 Nzambe na ngai, nazali koganga na moi,
kasi ozongiseli ngai eyano te ;
mpe na butu, natikali nye te.

3 Nzokande yo ofandisami na kiti ya bokonzi lokola Mosantu,
yo masanzoli ya Isayele.

4 Batata na biso batiaki mitema na bango epai na yo ;
batiaki mitema na bango epai na yo, mpe
okangolaki bango.

5 Bagangaki epai na yo,
mpe obikisaki bango ;
batiaki mitema na bango epai na yo,
mpe bayokaki soni te.

6 Kasi ngai, nazali mosopi,
kasi moto te ;
bato bazali kotiola ngai ;
mpe bamoni ngai moto pamba.

7 Bato nyonso oyo bazali komona ngai
bazali koseka ngai ;
mpe bazali kofinga,
bazali koningisa motu :

8 “Atiaka motema na ye epai na Yawe ;
tika ete Yawe abikisa ye,
tika ete Yawe akangola ye,
pamba te asepelaka kati na ye !”

9 Kasi yo Yawe, yo moto obimisaki ngai
na libumu ;
osalaki ete natia motema epai na yo
lokola na tolo ya mama na ngai.

10 Banda nabotama
batikaki ngai na maboko na yo ;
wuta na libumu ya mama na ngai,
yo ozalaki Nzambe na ngai.

11 Kozala mosika na ngai te,
pamba te pasi ekomi pene-pene,
mpe moto azali te mpo na kosalisa.

12 Bangombe ebele ezingi ngai ;
bangombe ya makasi
ya Basan ezingi ngai.

13 Na koganga makasi penza ya ntambwe
oyo ezali kopasola nyama,
minoko na bango efungwana polele mpo na ngai.

14 Nasopani lokola mayi,
mpe mikwa na ngai nyonso ezali kokabwana ;
motema na ngai ekomi lokola mafuta,
mpe ezali konyangwama na kati na ngai.

15 Makasi na ngai ekawuki lokola eteni ya nzungu ya mabele,
mpe lolemo na ngai ekangami na monoko na ngai ;
olalisi ngai na putulu ya liwa.

16 Bambwa bazingaki ngai,
mpe lisanga ya bato na mabe bazingaki ngai ;
batoboli maboko mpe makolo na ngai.

17 Nakoki kotanga mikuwa na ngai nyonso ;
bazali kotala ngai,
bazali kotala ngai malamu-malamu.

18 Bazali kokabola bilamba na ngai,
kati na bango,
mpe bazali kobetela nzambala na ngai zeke.

19 Kasi yo Yawe, kozala mosika te ;
yo makasi na ngai,
yaka noki kosalisa ngai !

20 Kangola bomoi na ngai na mopanga ;
bomoi na ngai ya motuya wuta
na se ya nguya ya bambwa.

21 Kangola ngai na monoko ya bantambwe ;
bikisa ngai na maseke ya bampakasa.

22 Nakoyebisa kombo na yo
epai ya bandeko na ngai.
Mpe nakosanzola yo na kati ya lisanga ya bato.

23 Bino baoyo bobangaka Yawe, bosanzola ye !
Bino nyonso bana ya Zakobi, bokumisa ye !
Bino nyonso bana ya Isayele, botosa ye !

24 Pamba te amonaka pamba
mpe aboyaka te pasi ya moto
oyo azali konyokwama ;
mpe abombelaka ye elongi na ye te ;
kasi ayokaka koganga na ye, tango asengaka lisungi

25 Epai na yo nde ekowutaka masanzoli na ngai
kati na lisanga ya monene ;
liboso ya bato oyo babangaka yo
nakokokisa ndayi na ngai.

26 Mobola akolia mpe akotonda ;
bato oyo balukaka Yawe bakosanzola ye ;
tika ete mitema na bino ezala na bomoi libela na libela.

27 Basuka nyonso ya mokili mobimba ekokanisa Yawe
mpe ekozonga epai na ye ;
mpe mabota nyonso ya bikolo ekofukama liboso na ye.

28 Pamba te bokonzi ezali ya Yawe ;
mpe azali na bokonzi likolo ya bikolo.

29 Bato nyonso ya bozwi ya mokili
bakosala feti mpe bakokumbamela ye ;
bato nyonso oyo bakokita na putulu,
bakofukama liboso na ye,
baoyo bakoki kobatela bomoi na bango, bango moko te.

30 Bana oyo bakobotama bakosalela Ye ;
bana ya tango oyo ekoya,
bokolobela bango mpo na oyo etali Yawe.

31 Bakosakola bosembo na ye
na bato oyo nanu babotami te,
pamba te ye moto asalaki bongo.
Copyright information for LinMNB