Psalms 23

Yawe azali mobateli na ngai

Nzembo ya David


1 Yawe azali mobateli na ngai,
nakozanga eloko te.

2 Apemisaka ngai na matiti ya mobesu,
mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia.

3 Alendisaka molimo na ngai ;
akambaka ngai na banzela ya bosembo,
mpo na kombo na ye.

4 Ata soki natamboli na lobwaku ya molili ya liwa,
nakobanga mabe te,
pamba te ozali na ngai elongo ;
lingenda na yo mpe nzete na yo,
ebondisaka ngai.

5 Obongisi mesa liboso na ngai
na miso ya banguna na ngai ;
opakoli motu na ngai mafuta,
kopo na ngai etondi meke.

6 Ya solo, bolamu mpe bolingo ekobanda kolanda ngai
mikolo nyonso na bomoi na ngai ;
mpe nakovanda na ndako ya Yawe libela na libela.
Copyright information for LinMNB