Psalms 24

Yawe akoti na Esika na ye ya bosantu

Nzembo ya David


1 Mabele ezali ya Yawe mpe biloko nyonso oyo
ezali kati na yango,
mokili na baoyo nyonso bavandi kati na yango.

2 Pamba te atiaki yango likolo ya ba-ebale minene,
mpe apikaki yango likolo ya ba mayi.

3 Nani akokoka komata na ngomba ya Yawe ?
Nani akokoka kotelema na Esika na ye ya bosantu ?

4 Moto oyo azali na maboko esukwama
mpe oyo azali na motema ya peto,
oyo atombolaka molimo na ye te epai
ya banzambe ya bikeko,
to alapaka ndayi na oyo ezali lokuta te.

5 Ye akozwa lipamboli wuta na Yawe,
mpe elonga wuta na Nzambe Mobikisi na ye.

6 Ndenge wana ezali libota ya baoyo balukaka ye,
ya baoyo balukaka elongi na yo,
Nzambe na Zakobi.

7 Botombola mitu na bino, bino baporte !
Botombwama, bino baporte ya kala,
mpo ete Mokonzi ya nkembo akota !

8 Nani Mokonzi yango ya Nkembo ?
Ezali Yawe oyo atondi na makasi mpe na nguya,
Yawe oyo atondi na makasi kati na bitumba.

9 Botombola mitu na bino, bino baporte !
Batombwama, bino baporte ya kala,
mpo ete Mokonzi ya nkembo akota !

10 Azali nani Mokonzi yango ya Nkembo ?
Yawe ya mampinga ya basoda ya likolo,
azali mokonzi ya nkembo !
Copyright information for LinMNB