Psalms 28

Yawe pesa ngai eyano

Nzembo ya David


1 Epai na yo nde nazali kobenga,
Yawe, libanga na ngai ;
kokangela ngai litoyi te.
Pamba te soki otikali nye e,
nakokokana lokola bato oyo basiʼbakita na libulu.

2 Yoka kobelela na ngai mpo na mawa,
ndenge nazali kobenga yo mpo na lisalisi,
ndenge natomboli maboko na ngai
na Esika na yo ya bosantu koleka.

3 Kolongola ngai te elongo na bato na mabe,
elongo na bato oyo basalaka mabe,
baoyo balobaka makambo ya kimia na baninga na bango
kasi babombaka mabe na mitema na bango.

4 Zongisela bango mpo na makambo
oyo basalaka mpe mpo na misala na bango ya mabe ;
zongisela bango mpo na oyo maboko na bango esalaka,
mpe pesa bango lifuti oyo ekoki na bango.

5 Lokola batalaka misala ya Yawe te,
mpe oyo maboko na ye esalaki,
Yawe akopanza bango mpe akotonga bango lisusu te.

6 Masanzoli ezala epai na Yawe !
Pamba te ayoki koganga na ngai mpo na mawa.

7 Yawe azali makasi na ngai
mpe ebende oyo ebatelaka ngai ;
motema na ngai etiaka elikya kati na ye,
mpe na sungamaki ;
motema na ngai ezali kosepela,
mpe nakopesa ye matondi na nzembo.

8 Yawe azali makasi ya bato na ye,
esika ya makasi oyo ebikisaka
mopakolami na ye

9 Bikisa bato na yo mpe pambola bomengo na yo !
Zala mobateli na bango,
mpe mema bango libela na libela.
Copyright information for LinMNB