Psalms 29

Mongongo ya Yawe

Nzembo ya David


1 Bopesa epai na Yawe,
bino bilombe !
Bopesa epai na Yawe nkembo mpe makasi !

2 Bopesa epai na Yawe nkembo oyo ekoki na kombo na ye ;
bokumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na ye.

3 Mongongo ya Yawe ezali likolo ya mayi ;
Nzambe ya nkembo azali koganga lokola kake,
Yawe azali koganga lokola kake
likolo ya bamayi ya makasi penza.

4 Mongongo ya Yawe ezali na nguya mingi,
mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.

5 Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya Sedre ;
Yawe abukaka mike-mike banzete ya Sedre ya Liban.

6 Apumbusaka Liban
lokola mwana ngombe, mpe Silioni
lokola mwana ya mpakasa.
7Mongongo ya Yawe ebimisaka balolemo ya moto.

8 Mongongo ya Yawe elengisaka esobe ;
Yawe alengisaka esobe ya Kades.

9 Mongongo ya Yawe ebotisaka bamboloko,
mpe ekomisaka bazamba polele.
Mpe na kati ya Ndako na ye, biloko nyonso egangaka :
“Nkembo !”

10 Yawe avandaki na kiti ya bokonzi likolo ya mpela ;
Yawe avandaki na kiti ya bokonzi lokola Mokonzi
mpo na libela na libela.

11 Yawe apesaka bato na ye makasi ;
Yawe apambolaka bato na ye na kimia.
Copyright information for LinMNB