Psalms 30

Yawe azongisi ngai na bomoi

Nzembo ya David ; nzembo mpo na kobulisa Ndako ya Nzambe.


1 Nakonetola yo, Yawe mpo obimisi ngai na mozindo penza,
mpe otiki te ete banguna na ngai basepela mpo na ngai.

2 Yawe, Nzambe na ngai,
nagangaki epai na yo, mpe obikisaki ngai.

3 Yawe,
olongoli ngai na mboka ya bakufi ;
obateli ngai,
mpo ete nakita na libulu te.

4 Boyemba mpo na Yawe,
bino basantu na ye ;
bosanzola kombo na ye ya bosantu.

5 Pamba te kanda na ye ewumelaka
kaka mwa tango moke,
kasi bolamu na ye ewumelaka libela na libela ;
kolela ekoki kozala na butu,
kasi esengo ekoya na tongo.

6 Tango nazalaki na kimia,
nalobaki : “Nakokweya ata moke te.”

7 Yawe, mpo na bolamu na yo, olendisi ngai
kasi tango obombaki elongi na yo,
nabangaki mingi penza.

8 Yawe, nabelelaki yo ;
nabondelaki Yawe mpo ayokela ngai mawa :

9 Liwa na ngai ezali na litomba nini ?
Soki mpe nakiti na libulu, yango ezali na litomba nini ?
Putulu ekoki kokumisa yo ?
Putulu ekoki kosakola bosolo na yo ?

10 Yawe, yokela ngai mpe yokela ngai mawa ;
Yawe, zala mosungi na ngai !

11 Obongoli kolela na ngai na esengo ;
olongoli saki na ngai mpe olatisi ngai esengo,

12 mpo ete motema na ngai ekumisa yo na banzembo
mpe evanda nye te.
Yawe Nzambe na ngai,
nakokumisa yo libela na libela !
Copyright information for LinMNB